MAP

2025.04.06 Pàpa François, o lomingo loye la mitano ya eleko ya Karezimo, mwa 6 aprili 2025.04.06 Pàpa François, o lomingo loye la mitano ya eleko ya Karezimo, mwa 6 aprili   (VATICAN MEDIA Divisione Foto)

Angelus : Pàpa alingi ete makambo etali bokolongono bwa nzoto bozala na bokebi mpo ya babola.

Mwa lomingo moye mwa 6 ya sànzà ya aprili, na mwa tango mokuse, Pàpa François apesaki mbote na bandimi basanganaki mpo ya Misa na esika ya Mosantu-Petro. Na yoko liyebisi la Angelus ndako ya bopanzi nsàngo abimisaki, Tata-Mosantu asengi lisungi mpe botosi mp ona mosàlà ya baminganga. Abyangi lolenge yoko mpo ya kimya bipayi binso o mokili mobimba. Azali kokitisa mobùlù ezali koleka na ekolo ya Haïti, epayi wapi bamamelo babale basilaki kokufa o mokolo mwa 31 ya sànzà ya marsi.

Albys KBD CP – Kinshasa/RDC

 

“Lomingo lolamu na banso, Matondi”. Wanà nde maloba Pàpa François abimisaki na mwa ngonga moké abimaki na esika ya Mosantu-Petro (Place Saint-Pierre) na nsuka ya Misa ya Yubilé ya bakoni (bato na maladi).

Na yoko makomi mpo ya Angelus ya lomingo la mitano ya eleko ya Karezimo, oyo ndako ya bopanzi-nsàngo ebimisaki, Pàpa François abeti nsété na Nsango-Elamu ya mokolo, mpo na likambo la “Mosapi mwa Nzambe” oyo ekomi na mabele. Nà mosapi monà, Yezu akomi “lisapo la sika” mpo na mwasi wa bokàli bato bamobeko nà ba-Farizéo balingaki koboma nà mabangà mpo ya lisùmù asalaki.

“Na libakù la mokolo mwa Yubile ya bakoni (bato na maladi) mpe ya baminganga, François asengi na nzambe été «loboko la yé ya bolingo esimba baye bazali na minyoko, ekamba mpe baye bazali kosalisa bango».”

Mosapi mwa Nzambe    

Tango azalaki na lopitalo mpe sika azali na bopemi ya maladi na ut’o mikolo zomi na itano na Vatican, François alobi ayoki « mosapi mwa Nzambe » mpe «kosimbama wana ya bolongo».

Na libakù la mokolo mwa Yubile ya bakoni (bato na maladi) mpe ya baminganga, François asengi na nzambe été «loboko la yé ya bolingo esimba baye bazali na minyoko, ekamba mpe baye bazali kosalisa bango».

Ayokaki mawa na lolenge baminganga, ba lifulume, mpe basàli ba lopitali bazali kosala mosàlà ya bango na mpasi, tango mosusu bazali kokutana nà mikakatano ndenge na ndenge. François amoni ete etindà ya bango «ezali ya pete soki moke te, esengeli kosunga mpe kotosa bango».

Eloko ya motùyà ezali ete François asengi na bakambi ba mokili bapesa mbongo mpo ya monό mpe na boluki ya bamaladi, na ntina ‘te «makambo etali bokolongono bwa nzoto bozala na ezalela ya kosangisa mpe bokebi mpo ya bato ba mawa mpe babola».

Kimya bisika binso na mokili

Boo momeseno, Mokonzi monene mwa bantomà asengaki na bandimi basàmbela mpo ya kimya na mokili mobimba, mingi mpenza “na Ukrayina oyo azali konyokwama bomartiro ya bitumba, mpe ebundisami mingi mpe bato bakufi mingi bazali bacivile mpe bana miké ébélé”. Yoko lisolo na nzela ya singa (entretien téléphonique) esalemaki kati na Mgr Paul Richard Gallagher, mokomeli mwa Saint-Siège mpo ya boyokani nà bikolo mpe ba organisation internationales; nà Sergeï Lavrov, mbulamatari na mayé matali Affaires étrangères de la Fédération de Russie.

Akanisaki mpe Gaza, epayi wapi bato bakomi lokola eloko ezangi ntina, ezangi ndaku, bilei, mayi ya peto. Azali kosenga bozongisi masolo, batika bato na boloko, kino “masasi makotika kobeta

Sambelani mpo ya kimya na Proche-Orient mobimba,na Sudan, mpe Sudan ya sudi, Republiki democratiki ya Congo, na Birmaniya oyo ezwaki likàmà ya koningana ya mabélé. Abosani te likambo ya Haïti oyo bamamelo mibale basilaki kobomama na bitumba oyo etungisami ekolo.

Lisusu, mokolo moye ezalaki mpe mokolo ya mokili mobimba ya Sport mp ona kimya mpe botongi mboka. Pàpa alapi ndayi ete “sport esengeli kozala elembo ya kolikya mpo ya baye banso bazangi kimya,mpe baye bakoluka bosangani ya bato”. Sima Pàpa apesi melesi na bato baboloko, mingi mpenza na mwasi ya Rebibbia, mpo ba komelaki ye.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

06 sánzá ya mínei 2025, 22:02