Mobulu ya bato ya mpomba na Ha?ti, babomi ba mamelo mibale
Jean-René Bompolonga-Kinshasa
¡°Nayebi te mbala boni Eklezia ekobelela mokili mobimba¡±, elobaki Mgr Jean Désinord, episkopo ya Hinche, oyo ayoki mawa na mobulu ezali komema kufa ekowuta epayi ya bato ya mpomba na ekolo. Mobulu ya bosenzi bizali kokoba kaka na biteni ya mboka mokonzi ya Haïti, lokola na etuka ya Mirebalais epayi wapi kobanda butu ya mokolo ya liboso 31 ya sanza ya misato kino mokolo ya mibale ya 1 ya sanza ya minei, ¡°bituluku ya bato na mindoki ebele babangisi bato makasi na mobulu ya kolinga te¡±, elobaki communiqué moko ya episkopo ya Hinche. Kati na bato babomi, tozali na ba mamelo mibale ya Congrégation ya ba Petites S?urs ya Santu Thérèse ya Mwana Yezu, ba mamelo Evanette Onezaire na Jeanne Voltaire. ¡°Bomipesi na bango na mosala ya botangisi bana ezalaki kosepelisa bato¡±,
Mobulu ya bato ya mpomba
Mirebalais ezali mboka ya nsuka eyebani eye bato ya mpomba bawutaki na Port-au-Prince bakotaki. Babomi basalaki mobulu na mimbongo ya bato mpe na ba poste ya police. Koleka bakangemi 500 bakimaki na boloko. ¡°O eleko bato ya mpomba bakomaki, ba mamelo, na nsomo, bakeyi kobombana epayi ya ba voisin, elobaki Mgr Jean Désinord. Ezali na ndako ena nde babomaki bango na bato basusu bazalaki na kati. Bazoloba bato 6 to 7, mpe kino eleko eye banzoto na bango nanu bazui yango te¡±.
Bato bazangi makasi
Eleki mobu moko, Mirebalais emekanaki na mobulu mbala mibale, kasi bato ya mpomba bakokaki te liboso ya molende ya bato ya mboka ena. Kasi na ebandeli ya mposo, bakotaki na Mirebalais ¡°na makasi koleka mpe na bosaleli mayele mosusu¡±, ekomaki episkopo. ¡°Na ndenge ya kobombana, bakotaki na Mirebalais ba mposo bilekaki, na nsima bakotisi mobulu na mboka ntango bazalaki na kati, na eleko ena bato ya mpomba misusu bazalaki kokota na nzela enene¡±, elimbolaki Mgr Jean Désinord.
Mampinga ya police, biyaki nsima mpenza, bayoki mpasi mpo na kobundisa bato ya mpomba,baye bazalaki kala o kati ya ba ndako ya mboka. ¡°Babomi bato ebele, mpe tozali komona lokola bato batikali bango moko, bazangi makasi¡±, etatolaki ye. Bato bazali na mindoki bayingelaki o ndako moko ya sango mokonzi ya diocèse ya Hinche. Na makasi bayebisi sango afungolela bango nzela ya kokota o ndako ya Nzambe, na nsima babomi na miso na ye mokengeli ya ndako ya Nzambe.
Boyambi mpe bomoko
Diocèse, eyoki mpasi na likambo yango, elobi bomoko na ye na mabota nionso bizui likama ya liwa, mpe epameli bosenzi moko eye ekotika elembo na bato. Ndako ya episkopo ya Hinche abengi na nsuka ya mobulu, elongo na Lisanga ya ba episkopo ya Haïti. Eklezia katoliko ebimisi nkanda na ye epayi ya bakambi ya ekolo lolenge bazali kokoka makambo te mpe abengi bana mboka na bokebi, na bomoko mpe na losambo, kasi bamipesa na nkada te to batala kaka boye: ¡°Toyika mpiko na boyambi mpe na bomoko, toboya mobula ebongisa lobi na biso¡±, bilobaki ba episkopo.