ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025 - 04 - 06 : P¨¤pa Franswa abimaki na Esika Mosantu-Petro mpo ya kopesa mbote na bato bamob¨¦mbo. 2025 - 04 - 06 : P¨¤pa Franswa abimaki na Esika Mosantu-Petro mpo ya kopesa mbote na bato bamob¨¦mbo.  

P¨¤pa Franswa abimaki na Esika Mosantu-Petro, kopesa mbote na bato ba mobembo

Na nsuka ya Misa ya bosukisi yubil¨¦ ya bakoni mpe bas¨¤li ya bokono bwa nzoto, P¨¤pa Franswa ayaki liboso ya lis¨¤ng¨¤ lya bato bamobembo 20 000 mpe alobaki: ¡°lomingo lolamu na banso, matondi mingi¡±. Ezali bongo kobima ya mbala ya yambo band¨¤ azongaki na lopitalo ut¡¯o mokolo mwa 23 ya marsi moleki. Yambo apesa mbote, Tata-Mosantu akatisaki Ezibelo Esantu ya baziliki Saint-Pierre, at¨´belaki mpe asambelaki mwa moke, mpo ya kokokisa mas¨¦ngi ma mob¨´ ya Yubil¨¦.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Eyebanaki soki moke te été Pàpa François akobima na mpwasa o mokolo mwa lomingo la 6 aprili. Kasi yemei alingàki kobima na ndako avandi na Sainte-Marthe ya Vatican mpo ya mwa ngonga moke na  esika Mosantù-Petro (place Saint-Pierre). Ezalaki bongo nsima ya Misa mokambamaki na Mgr Rino Fisichella; abimaki na kiti oyo epusamaka, na lisalisi ya lifulume na yé.

Alekaki o kati ya bandimi tee akomaki esika basàlàki Misa. Na nsima ya bobenisi bwa nsuka, Pàpa azwaki maloba liboso lya bato nkoto tùkù mibalé ya mobembo bongo alobaki: ¡°lomingo lolamu na banso, matondi mingi¡±, yambo ete azonga na Sainte-Marthe. Alataki ba canule ya zolo mpo ya kopema malamù, loloenge yoko nà mokolo abimaki na lopitalo Gemelli mwa lomingo la 23 ya sànzà ya marsi moleki. Bato bamobémbo balakisaki esengompe nsayi ya bango nakobetela ye maboko makasi mpe bazalaki kobelele mbala ebele ¡°Viva il Pàpa¡± elimboli te ¡°Pàpa oy顱.

Bolimbisi bwa masumu

Yambo ¡®te apesa bato mbote mpe melesi na bandimi na place Saint-Pierre, «Tata-Mosantu azwaki sakramentu ya ntùbélà na kati ya baziliki ya Saint-Pierre, asambelaki mwa moke na kimya mpe alekaki o Ezibelo Esantu», elobi ndako ya bopanzi-nsàngo. Yé moto azali na bopemi bamaladi bandà mikolo zomi na itano na Vatican, kasi ayei kokokisa maséngi mya mobù mwa Yubilé, elongo na bato bamobémbo basusu oyo bayaki mpo nakosepela eyenga ya yubilé ya bakoni mpe basàli ba bokolongono bwa nzoto na mikolo miye mwa mitano (5) mpe mwa motoba (6) ya sànzà ya aprili.

Bokolongono bwa nzoto ya Pàpa ezali kobonga.

Mwa mosàlà mitano mwa mineyi (4) ya sànzà ya aprili, ndako ya bopanzi-nsango epesaki liyebisi ya bokolongono bwa nzoto ya Pàpa François oyo ezali kobonga malembe malembe, mpe ezalela ya yé ezalaki kongenge. Bongo elakisi ete azali kokoba kolandela makambo ma eklezya.  

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

 

07 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªnei 2025, 09:27