MAP

2025.06.12: Pàpa Léon XIV ayambaki ba nganga-Nzambe ya diosezi ya Roma, na tongo ya mokolo mwa zomi na mibale (12) ya sànza yuni, na salle Paul VI. 2025.06.12: Pàpa Léon XIV ayambaki ba nganga-Nzambe ya diosezi ya Roma, na tongo ya mokolo mwa zomi na mibale (12) ya sànza yuni, na salle Paul VI.   (@Vatican Media)

Pàpa alobi na basàngo ya Roma: “Bobanga te liboso lya mikakatano, bozala na bosolo mpe bozala ndakisa”

Pàpa Léon XIV ayambaki ba nganga-Nzambe ya diosezi ya Roma, na tongo ya mokolo mwa 12 ya yuni na salle Paul VI. Asengi bango bazala na bomoko, batambola elongo na eleko etondisami na mobulu na mokili, na bobolà, na mikakatano ya kozwa esika ya kovanda. Soki bameki kozala ndakisa na bomoi ya botaù, sé bongo bakoki kolakisa bokasi bwa Nsango-Elamu oyo ekozongisa manso sika; elobi bongo mokitani mwa Petro ya mbala ya nkama mibale na tùkù motobà na motobà (266è).

Albys KBD CP – Kinshasa/ RDC

 

BEpiskopo wa Roma akutani nà diosezi ya yé, banganga-Nzambe mpe ba seminariste ba yé. Poso misato mikoki nayino tè, awa azwaki bazilike ya Saint-Jean-ya-Latran, Pàpa Léon XIV ayambaki na masolo, o mokolo mwa zomi na mibale (12) ya sàanza ya yuni, na salle Paul VI, monkama ya banganga-Nzambe ya Italie mpe ya bipai bisusu, oyo bavandi na eklezya eye. Lisolo linà ezalaki na mpo ya “ebandeli ya kotambola elongo”.  

Yambo ya kobanda lisukulu lya yé, Tata Mosantu apesaki mbote na banganga-Nzambe ya Roma, mpo na “bomoi babonzeli o mosala mwa bokonzi bwa lola”, “mpo ya bikela bya bango ya mokolo na mokolo” mpe “bolamu bwa bango o kati ya mosala monà”. Léon andimi lolenge yoko « mpasi mpe kozanga bososoli» oyo  bamingi bakutani na yango, kasi “bavandi nye”.

«Mosala bokosala bokeseni kasi banso bozali na motuya o miso ma Nzambe mpe na bokokisami ya bilaka bya yé», esimbi motema mabango bongo Mokonzi monene ya ba ntomà. Mingi mpenza, atondaki botondi na ba oyo bazali na mokumba ya kolandela episkopo ya Roma o mosala mwa yé. Matondi koleka na episkopo wa lokumu Baldassare Reina, Episkopo-molandi monene ya diosezi ya Roma.  

Bazilike monene ya Saint-Jean-ya-Latran, «mama mpe moto ya ba Eklezya ya engumba ya Roma mpe ya mokili», Katédrali ya diosezi ya Roma, epai wapi bavandisaki Léon XIV lokola Episkopo, o mokolo mwa lomingo 25 ya sànzà ya mayi ya 2025..
Bazilike monene ya Saint-Jean-ya-Latran, «mama mpe moto ya ba Eklezya ya engumba ya Roma mpe ya mokili», Katédrali ya diosezi ya Roma, epai wapi bavandisaki Léon XIV lokola Episkopo, o mokolo mwa lomingo 25 ya sànzà ya mayi ya 2025..

Bosenga bwa bomoko kati na bondeko, na bonganga

Diosezi ya Roma ezali na motuya mpamba tè banso batieli yango miso mpo ezali na esika ya lokumu kati na eklezya ya katoliko. Bongo basango ba yé bakoùta na bisika binei bamokili. Pàpa akaboli masolo nà bango na biteni basato.  

Na eteni ya yambo, alobeli bango ntina ya bomoko, mpe ya lisanga. Uto kala, lisanga ezali ezalela-mokonzi mpo ya banganga-Nzambe ba Roma. Mpamba te ezali mobeko mwa kala. Bo momeseno, banganga-Nzambe, basengeli kozala na lisanga. Ezala na college to na bandako misusu. Yemei akulaki bonganga na Roma na 1982. Atangaki droit canoniki na eteyelo ya likolo oyo babengi Université Pontificale Saint-Thomas-d’Aquin (Angelicum) kino 1987. Nzambe ayebi malamu ‘te, sé na bomoko kati na biso mpe soki tosangani na yé, tokoki kobota mbuma, mpe tokopesa litatoli malamu, mpe mokili ekondima biso. Pàpa akebisi ezalela ya komizalela yo moko, mpamba te moko te akozala na libateli

Léon abyangi bango mpe na bokengi, nzokandé bomoko nà bosangani ekutanaka mpe na mikakayano o kati ya bato mpe etali bomoi ya bato bazali na diosezi. Elakisi ‘te bondeko kati na bato ekobebeka, nà mpe oyo ezali ontei ya mitema mya biso. Mingi mpenza mayoki ya bolembù ebotamaka o kati ya biso sima ya mikakatano, makama, bayokaki biso te, bandimeli biso te, to mpe matomba masusu tozwi te

Episkopo wa Roma apesi bongo likanisi lya yé “mp ona kosunga moko na moko azwa kimya na motema o kati yam osala mwa yé”. Na yango asengi bango bondeko kati na bonganga, bomoi makasi na molimo, na bokutani na Mokonzi mpe na boyoki ya liloba lya yé.

Eyano ya sango Stefano Cascio na lisukulu lya Pàpa Léon ya zomi na minei

Kopesa ndakisa na mosala

Nakolobela mateya ma yé ya mokolo mwa 31 ya sànza ya mayi moleki (s), Pàpa Léon alobelaki oyo etali ndakisa : « Na sengi bino yango na motema ya botata bwa ngai mpe mokengeli mpata ;  tosala makasi tozala banganga-Nzambe ya bosolo mpe ya ndakisa». Bomitika lisusu na mbela ya Motei, mpo na koyoka, kozala na bolingo neti ya mbala ya yambo. ; oyo etindaki bino na bikateli ya makasi mpe ya komipekisa na mpiko.

“Na sengi bino yango na motema ya botata bwa ngai mpe mokengeli mpata ; tosala makasi tozala banganga-Nzambe ya bosolo mpe ya ndakisa». Bomitika lisusu na mbela ya Motei, mpo na koyoka, kozala na bolingo neti ya mbala ya yambo. ; oyo etindaki bino na bikateli ya makasi mpe ya komipekisa na mpiko.”

Mosala ya kosakola na mokili

Na bosukisi, Tata-Mosantu alendisi diosezi ya Roma na kotala na “liso ya mosakoli” mikakatano mya eleko ya biso (mwa moyi mwa lelo), lokola mobulu, kokeseni, bobolà, kopusa basusu mopanzi, ezalela ekosimba mokili mobimba nà mpe enguma ya bibélé.

Pàpa asengi na basango ba yé na “koyamba mikakatano miye mpe kososola yango na nzela ya Nsango Elamu, kozwa yango lokola libakù ya kotatola, kasi bakima yango te.” Alaki eklezya ya yé bozalani pembeni, bondeko, mposa (bolingi) ya kotambola elongo (na mopanzi) na bango, mpe kosalela yémei makambo masato aùtaki koyebisa bango : Kopesa bonganga bwa bango o maboko ma Mokonzi, kosenga ye bokoli na bomoko, mpe kozala ndakisa na mosala ya bosakoli na eleko ya biso (na moyi mwa lelo). 

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

13 sánzá ya motóbá 2025, 10:59