ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Ndako-Nzambeotre Notre-Dame ya Paris, na bofungoli lisusu ya mbala ya sika, o mokolo mwa  8 ya s¨¤nz¨¤ ya zomi na ibale ya mob¨´ 2024 Ndako-Nzambeotre Notre-Dame ya Paris, na bofungoli lisusu ya mbala ya sika, o mokolo mwa 8 ya s¨¤nz¨¤ ya zomi na ibale ya mob¨´ 2024  (ANSA)

L¨¦on alendisi banganga-Nzambe ya Esanga-ya-France (?le-de-France) bazala na ?bolingo moko ya bokabi, to ya motema malamu?

Na mokanda moko akomaki na suka ya sanza ya mitano, Papa wa Roma azwi likanisi lya sika mpo na Eklezya ya mboka France. Sima ya kolendisa ba episkopo ba amusa elikya mpe lotomo la etinda mpo ya mabele ma bango, L¨¦on asengi banganga-Nzambe ya engumba ya Paris na kokolisa bondeko mpe bomoko. Ayebi malamu mikakatano bazali koleka na makambo ya eklezya mpe ya soci¨¦t¨¦, mingi mpenza ya mpasi makasi.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Na libaku lya zubilé ya banganga-Nzambe, ba episkopo mpe basango ya Province ecclesiastique ya Paris na ya mboka France, bazwaki nsango ya Pàpa Léon XIV. Ekomelaki bango solo na tango bazalaki kosambela na Misa o ndako-Nzambe ya Notre-Dame ezwami na Paris, mokolo mwa mitano (5) mya sanza ya yuni. Na bondeko nyonso apesaki bango mbote, bongo atombolaki likambo lya mibù tuku motoba (60ème) ya bobandisi ya mibeko ya     na Pàpa Paul VI na 1965. Na yango, Banganga-Nzambe ya ba diosezi mwambe ya mboka France bavandaki mpo ya kokanisa likambo liango o mokolo moye mwa zubilé.

Na nsango ena, Mokonzi monene Papa alobi boyé: ¡°Na zali na esengo mpo ya kolakisa bino bolingi bwa ngai bwa botata mpe kontindela bino bolendisi malamu koleka, mpo ¡®te bokoba na mosala, mokumba mopesameli bino mpo ya kosalela bato ba Nzambe¡±. Mgr Dominique Blanchet, episkopo ya Créteil nde moto atangaki nsango ena. Pàpa Léon awuti komisaki yé kala mingi tè Prelat ya etinda (mission) ya France.

 Pàpa ayebi mikakatano bazali koleka na makambo ya eklezya mpe ya société, mingi mpenza ya mpasi makasi. Kasi asengi bango batonga bomoi mpe mosala mwa bango na bolingo bwa Yezu, oyo eleki bokasika, ezali sé yangomei mpe ezali ya solo. Sé bongo lokola, ¡°bakola na bolingo ya bokabi (ya kozala motema malamu), kasi ya komibomba tè, mpo ya bolamu bwa mangomba ya bino. Yoko bolingo etondi na bozalani penepene, boyokeli baninga mawa, bozali boboto, bomikitisi mpe kozala mindondo t顱, lokola Pàpa Franswa alembaki te koloba, elobi Pàpa Léon XIV.  

Bokolisa bondeko kati na bonganga bwa bino mpe bondeko nà ba episkopo

¡°Sé bongo bakondimela bino, atako bozali nayino basantu tè, mpe bokosimba mitema mya bato bazali lisusu mosika. Bo kolonga mitema mya bango mpe bokokutisa bango nà Yezu¡±, ekobaki ye koloba. ¡°Na biangi bino bokolisa bondeko kati na bonganga bwa bino, bobatela bondeko nà baepiskopo ya bino mpe bolembe te kosambela mpo ya bomoko bwa eklezya. Botika ¡®te Elimo-Santu asalisa bino nakozongisa sika mikolo minso likabo ya kozala motema malamu, oyo bino moko bolakelaki Mokonzi o mokolo bokulaki bonganga bwa bino¡±, esukisaki bongo mokitani mwa Petro. Asengaki mpo ya banganga nzambe ya Esanga-ya-France (Île-de-France) libateli lya Notre-Dame, mpe bobenisi ya basantu banganga-Nzambe banso mpe ba episkopo ya Paris oyo baleka liboso la bango. Bongo apesaki bango bobenisi bwa yé na ¡°motema monene¡±³¾±è±ð²Ô³ú²¹.

Mpo na mabele ya France, Pàpa Léon XIV akolikya na etinda ya sika
Mpo na mabele ya France, Pàpa Léon XIV akolikya na etinda ya sika   (@VATICAN MEDIA)

Na boùmeli bwa mokolo monà ya zubilé ya bango, Banganga-Nzambe ya Esanga-ya-France bakendaki kotala bisika mwambe (8 lieux) ya badiosezi bikeseni, mpo na mateya elongo na ba episkopo, kokabola mwa kopo elongo na ndenge ya libota kati na bomoi ya bonganga, lokola elobami na decret Presbyterorum ordinis. Sima, bakendaki na Notre-Dame mpo na kosukisa mokolo mona mwa zubile nà misa na ngonga ya 16h00.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

06 s¨¢nz¨¢ ya mot¨®b¨¢ 2025, 11:42