Lomingo la yambo mpo na Léon XIV elongo nà bandimi mpe lilita la Petro
Albys KBC CP – Kinshasa/RDC
Na ngonga ya 12h00, tango ya Roma, bandimi nkotà nkamà moko (100 000), babetelaki maboko Léon XIV oyo abimaki na lininisa ya baziliki Saint-Pierre, esika wapi mokili moyebi yé, moleki bongo mikolo misato kaka. “Bandeko babali na basi, lomingo lolamu”, mbote apesaki. Bandimi bazalaki ebele mpe bakeseni na bendela ya ekolo moko na moko mozalaki wana, mingi mpenza oyo ya Amerika bisika abotamaki, mpe ya Pologne, France, Inde, bikolo ndenge na ndenge ya Amerika latina. Léon XIV, alobaki ete azwi “lokola likabo liùti na Nzambe”, mokolo mwa lomingo loye la yambo ya mosàla mwa yé lokola episkopo wa Roma, ezala lomingo la Mokengeli mpatà malamu, lomingo la mineyi ya Pasika.
Bandimi, ba alanga-nzembo basepelisi Léon XIV na bafanfaron na bango mpe na masàno misusu, o mokolo moye mwa eyenga ya Kristo Mokengeli Mpata Malamu, mpamba te, ezali ye moto akokamba eklezya elongo nà Elimo-Santu. Bato bakopesa biyango nà bolingi bwa oyo akolingaka bango.
Na lomingo loye, basepelaki mpo “mokolo mwa mokili mobimba ya losàmbo mpo ya mabyangi”. Ebandaki bongo mibù tukù motoba na mibalé (62 ans) moleki. Pàpa Léon asepelaki makasi lolenge asànganaki na losambo elongo nà bato ba Nzambe mpo ya libiangi ; mingi mpenza oyo ya nzela ya bonganga-nzambe mpe ya kimamelo. Mpamba te, eklezya esengeli mingi na yango. Na yango Léon asengi ete bilenge, basi mpe babali, bakutana o kati ya eklezya ezalela ya “koyamba, koyoka, kolendisa na nzela ya libyangi” bongo “batiya motema na ndakisa ya malamu ya komipesa” naNzambe mpe na baningà. Léon XIV akomisaki maloba ma yé, maye François alobaki mpo na mokolo moye ya libyangi (dans son message paru pour cette journée des vocations) mpo na bilenge
Na Bilenge, bobanga te.
Léon XIV ayebisi bilenge, babanga te, bandima mbelà mwa eklezya mpe ya Kristo Mokonzi, mpo ya kozala, moko na moko mokengeli mpata « bo motema mwa Nzambe». Bazala na makoki ya kosalisana kati na bango mpe ya kotambola na bolingo mpe bosolo. Nsima Pàpa Léon XIV ayembaki yemei loyembo la Maria ya Pasika, Regina Caeli yambo ‘te apesa bobenisi na bandimi nkoto nkamà moko baùtaki o mokili mobimba. Apesaki bango mbote mpe atondi bango botondi mpo ya kotambwisa ye na nzela ya Mosantu Petro awa azali na libandela.
Misa na lilita la Petro
Liboso la Regina Caeli, Léon XIV alingaki kobanda lomingo la yé ya yambo lokola Pàpa, liboso ya mokonzi ya bantomà. Akambaki Misa na ba grotte ya Vatikan, pene ya lilita ya Petro; asalaki Misa manà elongo nà mokambi monene ya lingomba ya Saint-Augustin, Sàngo Alejandro Moral Anton. Sima asambelaki kuna na nsé ya malita ya baPàpa: Benoit XVI, Paul VI, mpe misusu nkàmà moko na tùkù mineyi na libwà (149), bayé balekali liboso layé. Asàmbelaki mpe liboso ua ninche ya palliums, ekokani na sactuaire oyo batongaki na IIème siekle na bokundami ya Petro. Ezali nde elembo ya bosangani na ba episkopo nà mokitani ya Petro, mpo na oyo azalaki na mokumba ya kopono bango na misàla ya liboso mpe oyo molandi sika.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.