?Bitumba lisusu soki moke te? Lilendisi la P¨¤pa L¨¦on XIV mpo ya Kimya
Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC
Na sima ya nzembo ya Regina Caeli mpe ya bobenisi apesi na bandimi pene ya 100 000, oyo basànganaki na place Saint-Pierre, Pàpa Léon XIV, lokola bayé balekanaki liboso na yé, abyangi kimya na mokili. Ut¡¯o lininisa ya baziliki, alobi: «bandeko babali nà basi, mibù tùkù mwambe (80 ans) mileki ut¡¯o somo ya bitumba ya mokili mobimba ya mbala ya mibalé mosilaki, sima ya koboma bato bamilion motoba. Sik¡¯awa bitumba ya mokili mobimba ya mbala ya misato mizali kosàlema biteni na biteni ; na yango, lokola Pàpa François alobaka yango mbala ebele, nakoloba yango mpe ngai na bakambi minene ya mokili moyé : bitumba lisusu soki moke te !». Lolàka liye, libwakamaki na Pàpa Paul VI na tribine ya Nations-Unies tango mokili mokabwanaki nzokandé na bitumba - malili (Guerre froide).
Nakomema na motema mwa ngai, mpasi ya ba-Ukrayina balingami. Manso masàlema na lombango mpo ya kokotisa kimya ya solo solo, ya bosembo mpe ekoùmela, elingi Pàpa ya sika.
Likamwisi ya Kimya
Léon XIV asengi « botiki kobeta masasi» na mbala moko mpo ya ekolo ya Proche-Orient, mingi mpenza na etando ya Gaza. Azalin a mawa mpenza mpo na likambo ezali koleka o esika wana; bongo apesi likanisi ete lisùngi ekomela bang ona lombango mpo ya bacivil oyo ba lembi. Mpe asengi ete baye banso bakangaki, batika bango na bonsomi.
Elembo ya elikya emonisami na boyokani esàlemi kati na ekolo ya Inde mpe Pakistan. Episkopo wa Roma ya sika, ayambi nsango wana na esengo mpenza. Bongo abakisi ete akolikia mpo boyokani bokolandana nsima, ekozala na lotomo ya kokoma na lombango, na kimya ekoùmela. Kasi amituni, boni boni matata ezali na mokili? Na bolobeli bwa Maria, Mokonzi-mwasi ya Kimya, atiki manso mpo ete asengela biso na Yezu Mokonzi, likamwisi la Kimya.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.