MAP

2025.05.08 Episkopo wa lokùmu Mamberti apesi nsàngo ya boponami ya Léon XIV.  2025.05.08 Episkopo wa lokùmu Mamberti apesi nsàngo ya boponami ya Léon XIV.   (@Vatican Media)

Ezali Léon XIV ndé Pàpa ya Sika

Conclave eponi episkopo ya Roma ya mbala ya 267e, ndé episkopo ya lokumu Robert Francis Prevost. Nsàngo epesamaki liboso ya etùlùkù ya bato na episkopo ya lokumu Dominique Mamberti, lobi mokolo mwa minei mwa mwambé (8) ya sànzà ya mayi.

Nsango ya Vatican

 

«Annuntio vobis gaudium magnum: habemus Papam!». “Nakoyebisa bino esengo enene, tozwi Pàpa !”. Eleki mwa ngonga moke, na lininisa moko ya Baziliki ya  Monsantu-Petro, episkopo wa lokùmu Dominique Mamberti alobaki maloba bo momeseno na lokotà ya latin, na bosàkoli na Roma mpe na mokili nkombo ya mokitani wa sika ya Petro.

Mgr Robert Francis Prevost, episkopo wa lokùmu ya Eklezia Esantu ya Roma, amipesi nkombo ya Léon XIV (Léon ya zomi na minei)

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

09 sánzá ya mítáno 2025, 11:26