ÐÓMAPµ¼º½

Luka

P¨¤pa ya sika Leon XIV asengi kimya mpe bolongoli bibundeli na mokili

Conclave yango eponaki Cardinal Robert Francis Prevost lokola p¨¢pa ya mbala ya 267. Na kopesa mbote na bato 100.000 oyo bazalaki na Place Saint-Pierre, Mokonzi monene ya bantom¨¤ ya sika alingaki "kopesa matondo na ba episkopo wa lok¨´mu banso oyo baponaki ye azala mokitani ya Petro," mpe "mpo na kotambola elongo na y¨¦ lokola Lingomba ya bomoko na koluka bosembo". Azalaki na likanisi mpo na Papa Fran?ois, mpe atindaki mbote na espagnol na diosezi ya P¨¦rou ya Chiclayo esika wapi azalaki misionele.

Bansàngo ya Vatikan

 

Na ngonga ya 7h23 sima ya nzàngà, Pápa Leon XIV alobaki mbote na ye epai ya Roma mpe na mokili mobimba ut¡¯o na loge to lininisa ya katikati ya Baziliki ya Vatikan:

¡°Kimya ezala na bino banso!¡±

Bandeko balingami, oyo ezali mbote ya yambo ya Krsto Mosekwà, Mobateli malamu oyo apesaki bomoi na ye mpo na etongà ya Nzambe. Ngai mpe nakolinga ete mbote oyo ya kimya ekota na mitema na bino, ekoma na mabota na bino, na bato banso, bisika binso bazali, na bato banso, na mabele mobimba. Kimya ezala na bino! Ezali kimya ya Kristo oyo asekwi, kimia oyo elongolami bibundeli mpe Kimya oyo elongolamaki mpe kimya oyo ezali kolongola bibundeli, kimya ya komikitisa mpe ya molende. Ewuti na Nzambe, na Nzambe oyo alingaka biso banso ndelo nsuka te. Tozali kaka koyoka na matoyi na biso mongongo wana ya bolembu kasi ya mpiko ya Pàpa François apàmbola Roma!

Pàpa na bopamboli Roma apesaki lipamboli na ye na mokili, na mokili mobimba, na ntongo ya Pasika oyo. Tika nakoba na lipamboli oyo kaka: Nzambe alingi biso, Nzambe alingi bino banso, pe mabe ekolonga te! Biso banso tozali na maboko ya Nzambe. Yango wana, kozanga kobanga, kosangana loboko na loboko na Nzambe mpe moko na mosusu, tokende liboso. Tozali bayekoli ba Kristo. Kristo azali kokende liboso na biso. Mokili ezali na mposa ya mwinda mwa yé. Bomoto esengeli na ye lokola gbagba epayi ya Nzambe mpe bolingo na ye bosungana mpo na kotonga ba gbagba, na nzela ya masolo, na nzela ya bokutani, banso basangani mpo na kozala bato ba lisàngà ntango inso na kimya. Matondo mingi na Pàpa François!

Nazali mwana ya mosantu Augustin, Augustin, oyo alobaki: «Elongo na bino, nazali mokristo mpe mpo ya bino, nazali episkopo». Na ndimbola oyo, biso banso tokoki kotambola elongo epayi ya mboka oyo Nzambe abongisaki mpo na biso.

Na Eklezya ya Roma, mbote ya sipesiale! Esengeli toluka elongo lolenge kani tokoki kozala Eklezia ya misionele, Eklezia oyo etongaka bagba gba (pont), oyo esololaka, ntango inso efungwami mpo na koyamba, lokola esika oyo, na maboko ya polele, biso banso, bato banso oyo bazali na mposa ya lisungi na biso, na mposa ya bozalani na biso, bosololi na biso mpe bolingo na biso.

(En espagnol)

Y si me permiten también, una palabra, un saludo a todos aquellos y en modo particular a mi querida diócesis de Chiclayo, en el Perú, donde un pueblo fiel ha acompañado a su obispo, ha compartido su fe y ha dado tanto, tanto para seguir siendo Iglesia fiel de Jesucristo.

Mpe soki bokopesa ngai nzela na liloba moko, mbote mpo na banso mpe na lolenge moko ya ntina mingi na diocèse na ngai ya bolingo ya Chiclayo, na Pérou, epai wapi bato ba sembo balandaki episkopo na bango, bakabolaki bondimi na bango mpe bapesaki mingi mpo na kokoba kozala Eklezia ya sembo ya Yesu Klisto. Na bino banso, bandeko mibali mpe basi ya Rome, ya Italie, ya mokili mobimba, tolingi kozala Eklezia ya synodale, Eklezia oyo etambolaka, Eklezia oyo elukaka ntango inso kimia, oyo elukaka ntango inso bolingo malamu, oyo elukaka ntango inso kozala penepene mingimingi na baye bazali konyokwama.

Lelo ezali mokolo ya Mabondeli epai ya Mama na biso ya Pompéi. Mama na biso Maria alingi tango inso kotambola elongo na biso, kozala penepene, kosunga biso na intercession na ye mpe na bolingo na ye.

Yango wana nalingi kobondela elongo na bino. Tosambela elongo mpo na misio oyo ya sika, mpo na Eklezia mobimba, mpo na kimia na mokili, mpe tosenga Maria, Mama wa biso, ngolu oyo ya ntina mingi.

Mbote ya Papa esukaki na losambo na Maria Losako, lipamboli ya Urbi et Orbi mpe kopesa indulgence plénière.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

09 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªt¨¢no 2025, 11:05