Na lomingo loye, Pàpà François azongi na ndako ya Mosantu-Marta.
Bansango ya Vatican
O mokolo mwa lomingo mwa tùkù mibalé na isato (23) ya sànzà ya marsi, Pàpa akozonga esika avandaka na Mosantu Marta. Ezali bongo liyebisi epesamaki na baminganga sima ya liyangani ya bapanzi-nsango ya Vatican ut’o lopitalo Gemelli. Lokolà ekomamaki, Tata-Mosantu asengelaki kopesa bandimi mbote na ngonga ya losambo la Angelus yambo te azonga na Vatican. Atako bongo, François asengeli na bopemi molayi ya sànzà mibalé ; elobaki Professeur Sergio Alfieri, mokambi ya etùlùkù ya baminganga.
Tango azalaki na lopitalo, Pàpa akutanaki na makàmà mibalé oyo etiyaki bomoyi bwa yé na kokamwa. Ya yambo ezali ete “asengeli na mwa ngonga molayi mpo azongela lolenga azalaki, kasi kobonga emonani moke moke, na ndenge akotelaki lopitalo mikolo zomi (10) molekaki”.
Ya mibalé, mpe mpo na kosukisa, ezali lolenge azali kokoma malamu malembe malembe nà mwa tango yakopéma bapesi ye.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.