ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Lopitalo ya Gemelli na Roma,  Bozeli komonisama ya P¨¤pa Francesco Lopitalo ya Gemelli na Roma, Bozeli komonisama ya P¨¤pa Francesco  (ANSA)

P¨¤pa asengelaki kobenisa et¨´l¨´k¨´ ya bato o mokolo mwa lomingo na ngonga ya nz¨¤ng¨¤ .

Ndako ya bopanzi nsango ya Vatican, epesi liyebisi na tongo ya mokolo moy¨¦ mwa poso ¨¦t¨¦ P¨¤pa Fran?ois akomimonisa na lininisa ya lopitalo Gemelli na mokolo mwa lomingo mpo na losambo la Angelus, bongo akopesa mpe bobenisi. Ekozala kominonisa ya yambo ut¡¯o akotaki lopitalo o mokolo mwa zomi na ineyi ya s¨¤nza ya febuali.

Bansàngo ya Vatican

 

Ba poso mitano mileki, Pàpa François amilakisaki te na bato, bàndà akotaki lopitalo o mokolo mwa zomi na ineyi (14) ya sànzà ya febuali. Kaka mwa maloba mayokanaki o mokolo mwa motobà (06) ya sànzà ya marsi mpe nà foto (elilingi) moko ebimaki lomingo loleki.

Ndako ya bopanzi nsango ya Vatican epesi yoko liyebisi ete ¡°Pàpa François asengi amimonisa lobi na ngonga ya nzàngà na lopitalo mpo ya mbote mpe bobenisi¡±.

Mateya akomaki ekopesama bo momeseno ut¡¯o sànzà moko moleki. Bakoki kolanda ekwelà enà na lokota lya lifalansa na nzela ya Vaticannews.va, Facebook mpe na youtube ya Vatican News.

Azali mwa malamu

O mokolo mwa mitano, ndako ya bopanzi-nsango ya Vaticaneyebisaki bobele likambo ya bokolongono bwa nzoto ya François lolenge akomi mwa malamu. Atako bongo, azali kokoba lisalisi ya bankisi mpe fisioterapi ya kopema mpe koningana. Soki na butu alati maske te mpo na kopéma, azali bongo na ba singa ya oxygène na zolo.

Na mpokwa, na ngonga ya 19h30, Curie romaine nà bandimi bayé balingi, bakoki kokutana na esika Saint-Pierre mp ona losambo la sapélé mp ona bokolongono bwa nzoto ya Pàpa. Mgr Giordano Piccinotti, S.D.B., moyangeli ya APSA, l¡¯Administration du patrimoine du Siège apostolique, ndé akokamba losambo.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

23 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 11:59