ÐÓMAPµ¼º½

Bato zomi na motobà babungisi bomoyi bwa bango, mpe balotukà nziké basili kobungisama na mayi ya mbula oyo edindisi Bahia Blanca na Moniele ya ekolo ya Argentine. Bato zomi na motobà babungisi bomoyi bwa bango, mpe balotukà nziké basili kobungisama na mayi ya mbula oyo edindisi Bahia Blanca na Moniele ya ekolo ya Argentine.  (ANSA)

Bozalani pembeni ya Pàpa na bayé bazwi likàmà ya bozindisami na mayi na ekolo ya Argentine

Nakati ya lopitalo, Pàpa alakisi bozalani na yé pembeni na baye bazwi likàmà ya kodindisama na mayi ya mbula na ekolo ya Argentine, o mokolo mwa lundi mwa zomi (10) ya sanza ya marsi. Bahia Blanca, engumba ya mabόngό, ebukamaki na mayi ya bambula makasi enokaki o mokolo mwa sambo (7) ya sanza ya marsi. Bato zomi na motobà babungisi bomoyi bwa bango, nzokandé bato pembeni ya monkàmà basili kobungisama.

Bansango ya Vatican

 

Atako azali na lopitalo, bayebisaki Tata-Mosantu likàmà ya mayi ekweyeli mboka yé abotamaki o mokolo mwa zomo (10) ya sànzà ya marsi na nsuka ya poso moleki. Bahia Blanca, Engumba ya mabá½¹ngá½¹ ezali bongo na ngambo ya Moniele (Esti) ya eká½¹lá½¹ ya Argentine, ezwami na 600 kilometre na ngele (Sudi) ya Buenos Aires, etungisamaki na bamayi ya mbula na mokolo mwa mitano mwa sambo (7) ya sànzà ya marsi, bongo bato zomi na motoba (16) bawei mpe bitùkà nziké basili kobunga. Ezalaki na mwa ngonga moke, epayi wapi engumba eye ezwami na bato 350 000, ezwaki mayi na mingi ya 400 milimetre ekokani na bambula ekonokaka na mobù moko mobimba. Babimisi na mboka bato koleka 1000, bongo bikéla bya lisàlisi bizali kokoba.

Bongo ndako ya bopanzi nsango ya Ngwéndé-esantu elobi été Tata-Mosantu alakisi bozalani na yé pembeni nà baye bazwi likàma linà. Nkùmù ya mboka Javier Milei alatisi ekolo mikolo misato ya bokuya (matanga). Bitando binso ya ekolo bazali kokoba nakosunga bayé banso bazwi likàlmà liyé. Mayi ya mbula esali makàmà ekoki na ba miliyon ya mbongo 370, elobi Federico Susbielles, mokambi ya etùkù

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

11 sánzá ya mísáto 2025, 11:41