ÐÓMAPµ¼º½

Luka

P¨¤pa alandi ezuz¨´l¨´ na nzela ya bilili na Salle Paul VI mpe azali kokoba na terapi na lopitalo Gemelli. P¨¤pa alandi ezuz¨´l¨´ na nzela ya bilili na Salle Paul VI mpe azali kokoba na terapi na lopitalo Gemelli.  (ANSA)

Bokolongono bwa nzoto ya P¨¤pa ebongi: Baminganga balongoli pronostic

Atako eyano elamu ya therapi, esengeli ete balandela ye mwa mikolo misusu okati ya lopitalo. Na yango P¨¤pa alandi ezuzul¨´ na nzela ya bilili.

Bansango ya Vatican

 

«Bokolongono bwa nzoto ya Tata-Mosanto ekomi malamu», liyebisi ya mokolo mwa lundi na mpokwa ya ndako ya bopanzi nsango ya Ngwendé-Esantu. ¡°bamonaki ete bokolongono bwa nzoto ya yé ebongi makasi, mpo ba analyse ya makila basalaki malakisi myango malamu. Nzoto eyanoli malamu na lisalisi mpe bankisi ya baminganga¡±. Yango nde epusi bango na kolongola Pronostic, kasi akotikala mwa mikolo moke na lopitalo mpo ba landela na ba nkisi mpe baterapi.

Lolenge lyoko ndako ya bopanzi nsango epesaki lokola, mwa mayebisi matali misàlà ya Tata-Mosantu na ebandela ya poso moye. Alandi ezuzulù na salle Paul VI na tongo ya mokolo mwa lundi, yambo ¡®te akende na chapelle mp ona mwa ngonga ya losambo na ndako bapesi ye, mpe azwa Ukaristya. Na nsima ya nzanga, asàngànaki lisusu na bayi-Curie mpo na ezuzulu. Na bomumeli ya mokolo mwa yé, alandelaki na molongo losambo pe kopema. Ebakisaki ndako ya bopanzi nsango.

Na tongo moye, elimboli été butu ya Pàpa elekaki na kimya, bongo na tongo abandelaki terapi na yé mpa nakopema mpe koningana. Sima na mpokwa asambelaki sapele esalemaki bongo na salle Paul VI na Vatican, sima ya mateya ya mibale ya ezuzulu. Losambo linà likambamaki na episkopo wa lokùmu Kevin Farrell, préfet ya dicastère mp ona ba Laïcs. Manso mazali kolakisama na nzela ya bilili mpo bandimi basànga na losambo elongo nà Pàpa Franswa.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

11 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 09:37