MAP

Pàpa asengi na mapingà ya basoda nakobatela séko bomoyi bwa moto

Na ngonga ya mateya mayé na ntango ya misa mwa mokolo ya lomingo mwa 9 febuali, Pàpa Franswa abengisaki mampinga ya basoda na kosala ntango inso mpo na mokili ya bondeko mingi mpe bomoto. Ut’o esika Saint-Pierre, abengaki basoda, ba mpulusi mpe bakapita oyo basanganaki na Roma mpo na Yubilé ya bango, mpo na kozala ntango inso na bokebi mpo na kotelemela komekama ya kolona molimo ya bitumba.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Ebele ya ba iniforme epesaki langi na esika Saint-Pierre ya Roma o mokolo mwa mposo mwa 9 febuali, nzokande Yubilé ya mampingà ya basoda makangamaki (masukaki) nà Misa ekambamaki na Papa Franswa. Ba pèlerins koleka 25.000 bakutanaki mpo na ékwelà eye ya mibale ya Mobù-Mosantu, sima ya Yubilé ya Mokili ya kominikasion na nsuka ya sanza ya yanuali. Franswa akumisi basoda mpe bakonzi baye bazalaki wana, mpe apesaki bango matondi mpo na “etindà enene” ya bango na kobundisa ezalela nyonso ya mobulu oyo ezali na likama ya kotungisa kimia ya masangà ya bato, mosala mya bango na ntango ya makàmà ya biloko bizalisami mpe libateli bapesaka na baye banso bazali na makasi te.

Etaleli ya mawa ya kristo.

Nsango Malamu oyo eklezya eponi mpo na mokolo ya lomingo mwa mitano ya mobù C ezali oyo ya koboma mbisi na ndenge ya likamwisi. Nsango elamu ya Luka ekobeta lisolo boniboni nsima ya mateya mayé na etùluku ya bato, yezu asengi na balόbi (babomi) mbisi nakobwaka minyama ba bango, bongo o kati ya bango ezalaki na Simoni oyo akokoma Mosantu Petro. Bamekaki na mpamba kozwa mbisi butu mobimba. Nakotosa liloba lya Kristo, babwakaki lisusu monyama. Koboma mbisi elekaki mingi epusi bango balanda Kristo.  Na kotalela lisolo oyo, Tata-Mosantu atalisi bizaleli misato ya Klisto : « Amonaki, amati, afandaki ».

Nayino Yezu amoni. Nzokandé etùlukù ya bato bazingi ye, bazalaki na mposa ya maloba mayé mabwanya, yezu atali bango « o miso mayé etondà na mawa» na balόbi mbisi mpe azongeli « kolemba nzoto ya bango» lokola bazongaki maboko mpamba na butu. Akundoli (ayebi) «mposa ya bango yakozala motema mpamba lokola minyama miye mizali o maboko ma bango». Lokola na limeseno lya yé, Franswa azongeli kolobela ezalela isato ya Nzambe oyo ezali “bozalani penepene, mawa, bolingi o motema”.

Yubilé ya Mapingà ya basoda, Kotya Kristo o ntei ya misala mya biso.
Yubilé ya Mapingà ya basoda, Kotya Kristo o ntei ya misala mya biso.

Nà Kristo, Elikya ebungà ekozonga

Na nsima Yezu asali mpe amati na bwato. Amitiki te akangama « nakoyima mpe bolozi » kasi kutu, “azui likaninsi, akeyi na bokokutani nà Simon”, emonisi Franswa. Azwi esika ya echeki evandi na motema ya Petro.

Nakosukisa, Yezu afandi, lolenge moteyi ateyaka. Kasi Yezu asalaka mingi koleka koteya, asakoli Nsango Elamu mpe asali « ayokisi ete ezali nayino na elikya atako ntango mosusu makambo ekomonanaka lokola ebungi». Ezali ndé sé na ntango wana ete likamwisi ekosalemaka, “ bomoyi ekobandela lisusu, esengo ebungisamaki ekozongela ”.

Kozala na ngambo ya baye bazangi makasi 

Sima ya kotika mosali moko ya misa asilisa kotanga mateya mayé, mpo na «mikakatano ya yé yakopema na mpasi», Papa apesaki ba ezalela misato ya Yezu lokola ndakisa na mapinga ya bakengeli. Ya liboso, kotala, nakobatela “etaleli ya bokebi, oyo eyebi komona eloko elingi kotungisa bolamu ya bomoko, makàmà oyo ezali kotya bozito kati na bomoyi ya bana ya mboka, makàmà ya ezingelo ya masanga y abato mpe ya politiki”.

Na nsima, komata na masuwa, na komipesa “etindà ya bango na na mosala ya bolamu, ya bonsomi mpe ya bosembo”, lokola ekolakisa yango elamba ya bango, mpiko ya bango mpe ndayi ya bango. Na nsuka, kovanda, nakotikala kaka sé “na ngambo ya lotomo mpe y abato ya bolembu mingi”.

“Bozali nabino eyebisi biso ete bolamu ekoki kolonga atako manso, ekoyebisa biso ete bosembo, mpe mosala bwa ntoki mpo ya bato ezali nayino mabongi esengeli lelo mei, eteyi biso ete tokoki kotonga mokili moko epayi wapi bomoto eleki, bosembo eleki mpe bondeko eleki, atako misala ebé ezali makasi”.

Kobatelaka séko bomoyi

Bokonzi monene bwa Pàpa elobelaki na nsima mokumba ya ntina ya ba aumonié, elembo ya « Bozalisi bwa Kristo » mpe lisungi ya bizaleli malamu mpe ya molimo. Ezali lisusu na ntina te ya « kobenisa misala ya bitumba bongobongo», lokola esilaki kosalema o kati ya lisolo ya bomoyi ya bato, elobi Franswa, kasi ekosunga ba militele na ba etindà ya bango mpo ya komema « mwinda (pole) ya Nsango Ealamu».

Na bosukisi, Franswa apesi melesi na ba militele na ba mpulusi oyo bazali kobatela bikolo bya bango, “nabokutani ya mikakatano na bomoyi bwa bango”. Kasi apusi bango nakobomba seko botùyà ya misàlà mya bango: oyo ezali kobatela bomoyi bonso ya bomoto.

Na sengi bino, bozala na bokebi : bokeba na mimekano (masenginya) ya kokolisa molimo ya bitumba; bokeba mpo nakokweya te na mythe ya bokasi mpe na makelele ya mandoki; bokeba mpo nakopakolama te mabé ya kopalingyinia boyinani ekokabolaka mokili na moninga yakobatela mpe mongunà ya kobundisa”.

Ezalela ya moko na moko ya basangani ya mapinga ya basoda esengeli kozala oyo ya komiyebisa ete bato bazali bandeko, mpo bana ba tata moko, esilisi Pàpa, nakosenga bandimi bazalaki wana na kozala “banzenenekeba mpiko ya bolingi bwa Nzambe”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa

 

10 sánzá ya míbalé 2025, 11:39