ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.02.07 likita ya bopanzi nsango mpo ya Yubil¨¦ ya Maping¨¤ ya basoda. 2025.02.07 likita ya bopanzi nsango mpo ya Yubil¨¦ ya Maping¨¤ ya basoda.  

Yubil¨¦ ya maping¨¤ ya basoda: ¡°Tozali na mpamba soki tozangi Elikya¡±

Basoda koleka nkoto tuku misato (30.000), bampulusi mpe ba ansiekombata bakosepela yubil¨¦ moko kobanda mokolo mwa 8 kino mwa 9 ya sanza ya febuali na Roma mpe na Vatican, mpo na koyeba mosala oyo basalaka na kopesaka elikya ya mikolo malamu koleka na bapopulation ya mokili mobimba.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Bato koleka nkoto tuku misato (30 000) bakoya kokende na Roma mpo na kosangana na molulu monene ya mibale ya yubilé ya Mobu Mosantu. Mikolo mibaleminà mipesami na mapingà ya basoda nà bampulusi, bakapita, bansiekombata, masanga ya ba militele, biteyelo ya bamilitele, baomonié mpe ba ordinele ya ba militele.

O mokolo mwa 8 mpe mwa 9 ya febuali, ba nkoto ya bato bakokende na Pèlerinage na Ezibelo Esanto na Roma, bakozala na concert na esika Peuple na Roma mpe bakosukisa na misa na Place Saint-Pierre.

Mbéla mpo ya Kimya

Na tango ya likita moko ya bopanzi nsango oyo ebongisamaki na ndako ya bopanzi nsango ya Ebonga Esanto, Mgr Rino Fisichella, pro-prefet ya Dicastere mpo na bopalinginyi ya nsango Elamu, abongisaki programme ya mikolo mibale minà.

Ba délégations ya bikolo nkama moko, o kati ya bango Colombie, Australie, Ukraine, Etats-Unis mpe Indonésie, ekobanda wikende ya biyenga o mokolo mwa poso mwa 8 ya febuali na pelerinage na Ezibelo Esanto mpe na likoki ya kotubela.

Na nsima ya zanga, fanfare moko ekoyamba bitùlukù ya bato na Place du peuple (Piazza del Popolo) na Roma mpo na ntango ya feti. Mokolo mwa lomingo mwa 9 ya febuali, Mgr Rino Fisichella alobaki ete Pàpa akokamba misa atako azali na kosukosu mikolo miye.

Pro-prefet ya dicasquerie mpo na kosangela Nsango Elamu limboli ete yubilé oyo ya mampinga ya basoda «ezali nayino bokundoli bwa kimya», mingi mingi mpo na baetando ya   ya mokili oyo lelo ezali kokutana na mobulu.

Alobelaki maloba ma Pàpa François na manaka ya kolandela ya yubilé, lolenge mobù Mosantu mopesi ndingisa ya kokanisa «ete baye bakomaka basaleli ya kimya bakoki kobengama bana ba Nzambe. Bisengeli ya kimya ebenga moto nyonso mpe etinda biso tolandela misala ekomonanaka¡±.  

Mapingà ma basoda mpe yubilé ya Elikya

Ba projet oyo ezali komonana ekozwaka bilembo ndenge na ndenge mpe ekopesaka biyano na boséngà ya bapopulation na bisika ndenge na ndenge ya mokili. Ndakisa na yango ezali Operation Irini na Libye: Lieutenant-Colonel Ozren Lukenda, ya Marine ya Croatie, alobeli etinà na ye lokola ¡°kopesa maboko mpe kosunga etamboli ya kimya na Libye¡±. Bikolo tuku isato basangani ya Union ya Eropa basanganaki na mesure militaire oyo ya sécurité maritime oyo ezali na tina ya kosilisa mombongo ya minduki.

Lokola officier ya Etat-major ya Operation Irini, Lieutenant-Colonel alimbolaki boni boni mobù moye ya yubilé ya elikya eyokani na ¡°bobateli kimya¡± ya ba opération ya militele. ¡°Amemi elikya na baye banso bazwaki mpasi na makambo ya mabe, mpo mposa ya bango ezali sé kimya eloko mosusu te¡± elobi ye. ¡°Soki tozangi elikya, na lolenge nyonso emonani, tolingaki kozala na eloko te¡±.

Likita ya bopanzinsango mpo na Yubilé ya Mapingà ya basoda.
Likita ya bopanzinsango mpo na Yubilé ya Mapingà ya basoda.

Bizibelo Esantu kaka mpo na basoda (bamilitele)

Basoda oyo bazali na makoki te ya kokende na Roma mpe kosala mobembo na Ezibelo Esantu ya Basilika ya Mosantu Petro bakotika bango te.

Sango Saverio Finotti, Recteur ya Ecole ya ba séminariste mpo na ba omonié ya engumba ya basoda ya Cecchignola na Rome, alobaki ete ba chapelles ya ba etindà ya basoda na bikolo ya bampaya ekomi ¡°bisika ya mobembo, mpo nakolekisa nsango oyo mokonzi azali kobianga moto inso na kobongwama¡±.

Na lolenge linà, Yubile ya mampinga ya basoda ekolandana mosika koleka Roma mpe ekosangisa mibali mpe basi oyo bazali kosalela lotomo ya kimya mpe elikya na bisika binso ya mokili.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa

 

08 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªbal¨¦ 2025, 20:15