Ebandeli ya losambo ya lisànga ya bato mpo na Floribert Bwana Chui
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Molulu moye moningisi bakristo baiké ya dosezi ya Goma mpe province ecclesiastiki mobimba ya Bukavu mpamba te, kasi mpe badiosezi ya nzinga nzinga ya Rwanda, mingi mpenza, batindami bayaki na Roma. Bandeko mangomba bisusu mpe esanganaki wana, mingi mpenza, Eglise du Christ au Congo. Esangisaki baninga babango ya eyamba tùkù motobà na minei (64 Confession). Bakonzi ba mboka mpe bazalaki wana, batangi mpe batindami ya batomboki ya AFC/M23, oyo bazali naino na bingumba biye bàbalé, Bukavu mpe Goma, mpe bisika binso bya pembeni. Bandimi banso balakisaki esengo mpe lokùmu ya bango mpo ya koyamba mwa-esengo moye mwa sika. Na libandela ya mateya mayé, Mgr Fulgence Muteba alobaki ‘te: «Nzambe asili kopesa lokumu na Eklezia ezali awa, mpamba te akotatola ‘te mosàlà Mwana wa yé ayaki kobanda na mokili moyé, mozali mosàlà mwa sembo mpe ya solo, oyo ekoki kopesa yé basantu». Ayambaki “milolo” mya bato bazalaki wana.
Koluka bosantu bisika ozwami
Mgr Muteba alobaki ‘te: «boluboli boye bwa mwa-esengo ezali na ntina mingi», mpe ekomonisa polele ‘te ezali elembo ya liboso ekolakisa bomoko bwa eklezya na mokili mobimba mpe elakisi lisusu ‘te, eklezya ekobyanga bato banso na kozala basantu. Ezali lokola ‘te Nzambe azali kolobela biso : Bino mpe bokoki kokoma basantu… Bosengeli tè na kotika bomoi bwa bino mpo bozuwa y abato basusu, mpo ya kokoma mosantu, elobaki mokambi ya CENCO. A kanisi na bato lisusu ‘te, moto nà moto asengeli na bosantu na bomoi bwa yé. Alobi boye: Ezali n antina tè ya kolongwa libotà lya yo, mpo ya kokende na monastele mpo ya kokoma mosantu. Apesi ndakisa ya “Bwana Chui oyo azalaki mokristo mpamba lokola bango mpe o kati ya bango”. Floribert atikeli biso elembo monene ya bosantu o kati ya bomoi ya mokolo mozali koleka.
Elenge mobali moye, ayei kofungola biso miso na maye matali bizaleli ya mabé.
Episkopo monene ya Lubumbashi amonisaki mpe ntina ya Bwana Chui mpo na bato ya Congo. “Bomartiro bwa yé mpo ya bosolo mpe ya bosembo, ezali kitala-tala mpo na biso, liboso ya kanyaka oyo ezali kobebisa ekolo yabiso”, elobaki ye. “Ezali lisusu kaka likambo ya kanyaka te, kasi ya kokosa... kobuba mpe kokotisa na ndenge ya mabe biloko ya bato”, elobaki episkopo. Sik’awa tokomi lokola bato batondi na bizaleli ya mabe. Mgr Muteba alobi ‘te. Nzambe atomboli Bwana Chui mpo te tozwa ya yé ndakisa. Elenge mobali oyo afungoli biso miso. Soki tozwi libakù liye te, tokoki komata mpe tokiti, mboka na biso ekotelema lisusu te. Soko tozwi libaku oyo te, tokoki komata mpe kokita, mboka oyo ekoki kotelema lisusu te. “Ezali solo ‘te Floribert azwaki makasi nà litatoli ya mateya ya bokristo bwa yé, kasi mateya oyo azwaki epai ya baboti na ye ezali mpe na ntina”, elobaki episkopo. Atindaki bapetela mpe mama moboti ya mwa-esengo mwa sika, maboko na esengo.
Basantu bazali bato ya kokamwa te kasi bato oyo bazalaki na bomoi ya kokamwa
Na likanisi moko wana, na nsuka ya molulu, episkopo Willy Ngumbi, mokambi ya esika enà, alobelaki bomoi bwa Bwana Chui, mpe atyaki yango na esika ya eklezia ya Goma, lokola mpo na kolakisa na bandimi oyo bazalaki wana ‘te “basantu bazali bato ya kokamwa te, kasi bato oyo bazalaki na bomoi ya kokamwa liboso ya ezalela moko ya siki-siki”.
Bwana Chui avandaki kati na biso. Elenge mobali moko mokristu ya mibu 26, azalaki, monzemba mpe mosali ya Leta, alobaki ‘te, banda kala, Eklezia epesaki lokumu te na bato semba to na bato oyo bazali na bisika ya lokumu kati na yango to na kati na lisanga ya bato. Kasi eklezya epesaka lokùmu na bandimi oyo bamonisaki bizaleli malamu, ndakisa oyo ebongi ‘te bato banso bámemya yango”.
Bwana Chui, elembo ya kotelemela kanyaka oyo ezali bebisa lisàngà ya bato
Kobandisama ya losambo mpo ya elenge mwa-esengo eye, ezali libyangi ya elikia mpo na bandimi ya Goma, ya Congo, ya etuka ya bitima menene mpe ya Afrika mobimba. Episkopo ya Goma abengaki bandimi ba yé “balemba te kosàla bolamu”.
Azwaki mpe libaku lina mpo na kolakisa “bomoko makasi ya baeklezya” ya etuka éna. Atako matata ezali kati na bikolo na bango, apesaki mbote na batindami banene ya Eklezia ya Rwanda, oyo ekambamaki na Mokambi ya Lisàngà ya ba Episkopo ya Rwanda yemei. “Bomoi bwa Bwana Chui ezali litatoli ya seko ya tango inso, oyo Krito atikaki: kondima kokufa mpo na kozala na bomoi na Nzambe”. Mgr Ngumbi asengi bandimi ba ye ‘te balata ekeko ya mosantu ya sika lokola “elembo ya kotelemela kanyaka oyo ezali kobebisa mboka”. Asengaki bango bazala na bobangi te mpo na “kokoma na nzela oyo” bamipesi “moto na moto esika azwami”, lokola Bwana Chui.
Bwana Chui, bolama bwa molimo mpo ya banso, akokesenisa mangomba té.
Epai mosusu, episkopo ya Goma abéngaki bandimi ba ye, bábanda kosambela Nzambe. Bo sakolá Bwana Chui na bandako na bino, na balopitalo na bino, na biteyelo na bino, na bakompanyi na bino, na baninga na bino, na mibali mpe basi na bino banso; ebetaki yen sete. Mpe alobaki lisusu ‘te “Floribert Bwana Chui azali bolamu ya molimo, kaka mpo na Bakatolike te kasi mpo na bato banso. Mpamba tè apesaki bomoi bwa ye mpo na kobatela bomoi ya bato banso”. Balobeli likambo oyo na litatoli ya moto moko ya Lingomba ya Bamizilma oyo bakangaki ntango bazalaki kosolola na ntina na mwa-esengo mwa.
Diocèse epesi matondi na baye banso basalisaki mpo ete likambo oyo esalema
Epai mosusu, Mgr Willy Ngumbi, mokambi ya esika yango, apesaki matondi na baye banso bautaki mosika mpo na kosangana na molulu moye, mingimingi batindami bautaki na Roma. Lisangá yango ezalaki na Tata Angelo Romano, oyo atindamaki na Dicastele ya mpo ya basantu, mpe Francesco Tedeschi, momemi-nsango ya Sant’Egidio mpo na Congo mpe moto alandaki likambo ya boluboli ya Floribert. Botondi mpe epesamaki na ba tindami ya ba diosezi ya pembeni, kaka mpo bayaki kosangana na esengo ya Eklezia ya Goma te, kasi lisusu mpe mpo na manso masalamaki mpo na kolobela mwa-esengo ya sika na ba eklezya na bango ya ba mboka. Prelat apesaki mpe matondi na Letà ya Congo mpe na batindami ya batomboki ya AFC/M23 mpo na kosalisa mpe kosunga bango na likambo oyo.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.