ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Floribert Bwana Chui, Mwa-Esengo ya yambo ya Lingomba Sant¡¯Egidio

Lingomba lya San¡¯Egidio ezali kolengele koyamba mwa-esengo mwa yambo, na elongi ya Floribert Bwana Chui, martiro ya Congo. Bakolubola y¨¦ na lomingo la 15 ya yuni na bazilike ya Saint-Paul-Hors-les-Murs. Elenge mobali ya mbula tuku mibale na motob¨¤ (26 ans), amipesaki makasi na mosal¨¤ na lingomba Sant¡¯Egidio ya Goma. Babomaki y¨¦ na 2007 na mpo atelemelaki kanyaka. Atiki elembo ya moko ayebi kosalela baninga. Alingaki bomoko mpe bolamu ya banso; litatoli ya Aline Minani, mokambi mwa Sant¡¯Egidio.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Lingomba lya Sant¡¯Egidio ya Goma, eyambaki nsango ya boluboli bwa moko wa bango Floribert Bwana Chui, «na esengo makasi mpe botondi». Nsai enene na komona ¡®te topesi na eklezya mwa-esengo abimi mpenza ontei ya lingomba lya biso. Ezali lokùmo mpo ya biso, mingi mpenza mpo na engumba ya Goma eyebani na makambo ya mawa. Nsango eye etondisi biso na nsai mpe esepelisi lingomba mobimba na mokili mobimba, etatoli Aline Minani.

Yoka Aline Minani, mokambi ya San¡¯Egidio ya Goma, na RD Congo

Mosala ya Floribert pembeni ya ba «Maibobo: enfants de la rue »

Floribert azali mwa-esengo ya yambo ya lingomba Sant¡¯Egidio. O kati ya Goma azalaki kolinga kosalela moto nyonso. Atiki elembo ya moko ayebi kosalela banso. Mpo na yé, bomoi ya moto nyonso ezalaki na ntina. Amipesaki mingi na bana oyo babengi ¡°Maibobo¡± na lokota ya Swahili, elimboli ¡®te ¡°bana ba nzela¡±, na lopoto ¡°enfants de la rue¡±. Bana baye bazangi ndako ya kovanda, batangaka kelasi te, bazali na elikya te ya lelo mpe lobi ya bomoi bwa bango. Bazwaki libateli makasi ya moto oyo akokoma mwa-esengo kala tè. Alinea beli lisolo ya Jonathan, mwana ya mbula zomi (10 ans) ya mboka Bukavu, na tango ya lisano, atikalaki na masuwa tango baninga ba yé bakitaki. Awa masuwa ememaki yé mosika na mboka yé abotamaki, kino na Goma, akutanaki na Floribert, oyo asalaki makoki manso mpo ya kozongisa yé lisusu na Bukavu. ¡°Awa akoli, Jonathan atangi Floribert lokola anzelu Nzambe atindelaki yé, mpo ya kolongola yé na likama ya nzela¡±. Elobi mokambi mwa Sant¡¯Egidio na Goma.

Floribert Bwana Chui, moto wa boboto, lisanga mpe bomoko

Longola mokumba ya bana ya nzela, Floribert azalaki moto na boboto, lisanga mpe bomoko. ¡°Alingaki komona ¡®te banso bazala lisanga. Azalaki kolota Congo epai wapi banso bakovanda o mesa moko¡±. Elobi Aline Minani. Floribert azalaki kolinga ¡®te moto inso avandi pembeni na yé azala na esengo. Tembe te, yango emonisami mpe na elili epai wapi Floribert avandi elongo na bana o mokolo mwa eyenga ya Noeli (mbotama) oyo ebongisamaki na lingomba ya Sant¡¯Egidio mpo ya babola. Na bilili bina, ¡°emonisami malamu ¡®te bokeseni bozali te kati n abato oyo bazali kosalisa na bayé bazwi lisalisi lina¡±. Nzokandé ezalaki sé bongo eloko floribert Azalaki kolinga.

Kotikala semba mpe kolonga mabé na malamu.

Floribert Bwana Chui akufaki bomartiro na eleko ya bolenge bwa ye. Azalaki kaka na mbula sé tuku mibale na motoba (26 ans). Aboyaki kanyaka, bongo apekisaki mituka minene ya loso esila kobeba ekota na mboka te. Mpamba te bilei bina bikokaki kobebisa bokolongono bwa nzoto ya bato nziké. Bakangaki yé, banyongaki yé mpe babomaki ye.

Na eleko ya mobembo ya bantoma na RDCongo na 2023, Pàpa Franswa atangaki ye lokola ndakisa mpo ya bilenge. Ezalaki na libakù lya bokutani bwa yé nà bilenge na Stade ya bamartiro na mboka-mokonzi kinshasa. Alobaki boye : « Akokaki mpe kondima, atika yango ekota, ye mpe avwama (azwa mbongo). Kasi, bo mokristo bwa yé epekisaki ye, asambelaki, akanisaki baninga, mpe aponaki bosembo bongo alobaki ¡®t顯 o bosoto bwa kanyaka. Lolenge lyoko lisese lilobi ¡®te kobomba maboko bopeto, nzokandé maboko oyo ezali kotambwisa mbongo etondi makila ¡­, Soki moto apesi yo mbongo,to alaki yo bomengo mpe nkita, kokweya na motambo mona té, kolinga te bakosa yo, kodinda na mabé té. Kotika mabé elonga yo té, kondima bakomplo ya mbongo té, oyo ekodindisa yo na butu».

Mpo na Aline, bilenge ya Congo demokratiki mpe ya Afrika mobimba, basengeli kolata mbela ena mpe kolanda ezalela ya Floribert mpo ya « mpo ya kokoma lisapo la sika». Apesi likanisi ya kosalela bomoi bwa bokristu elongo na mosala na ndakisa ya Floribert. Mpamba te, yang ondé esalisaki yé na koboya kozipa elongi mpo ya mbongo ya bosoto mpe ya bongai (boyimi) ya «ezalela ya misalisa yomei ». Na bolandi Floribert, bilenge bakoyeba kokata na nzela bakoki kopona. Apesi bango mpe toli ya kotanga mikanda misantu, lokola Floribert. Lelomei, Bibilia ya yé etikali na bazilike ya Saint-Barthélemy, na mboka Roma.

Aline Minani, mokambi ya San¡¯Egidio ya Goma, na RD Congo.
Aline Minani, mokambi ya San¡¯Egidio ya Goma, na RD Congo.

Floribert Bwana Chui, ndakisa ya bakambi mipelengano (politiki)

Longola bilenge, bomoi bwa floribert ekoki kozala mbela mpe kopalela bakambi babikolo, epesi likanisi Aline. Na ekolo ya yé Congo, asali amoni ¡®te tissus social ezali kolembe mokolo na mokolo. Na ngambo ya Moniele (Esti), epai wapi elenge mobali oyo akufaki bomartiro, bitumba eùmeli bitùka misato ya mibu. Lelomei, bingumba ya Goma na Bukavu ezali na maboko ya batomboki ya  AFC/M23, oyo ekambami na ekolo ya Rwanda, mboka ezali na mondelo na RD Congo. Bomoi ya baiké ebebi.

Aline asengi na baninga bya ekolo ya yé na kosala mp ona bomoko ya ekolo, na ndakisa ya Bwana Chui : « na lingi Congo epai wapi banso bakovanda o mesa moko». Bongo na bakambi ya bituka bya bitimà binene, asengi bapona makambo na mpiko, balonga mabé na malamu, lokola Floribert asalaki. Batika koboma, basopa susu makila, kasi batonga mboka na boboto (kimya), mpamba te « bomoi ya moto nyonso ezali na ntina mpo ya moyo nyonso». «Liwa epusi ! bomoi ya bato epusi kobunga !», Tango ya kobungisa ¡° ata bomoi moko¡± ezali lisusu tè. ¡°Tozali na mposa ya Afrika moko oyo ekosangisa moto inso, epai wapi moto na moto akozwa esika ya yé, moto moko te asengeli komiyoka ete azali yé moko lokola ¡°esanga¡± bo elobaki Andrea Ricardi, mobandisi ya Sant¡¯Egidio. Totonga ba gbagba kasi bifelo te¡±.

Na boboto, banso tozali balongi. Goma ekoki kobongwana elanga ya boboto

¡°Kimya ezali eteni ya lipa esengeli koliya elongo. Mpo ya boboto, moto nyonso azali na elonga¡±, elobi Aline. Abengi na koyemba ¡°nzembo ya nsekwa ya Afrika¡±, loyembo la lingomba Sant¡¯Egidio. Engebene na Aline, ¡°Goma ekoki kobongwana elanga ya boboto! Iyo, RDC ekoki kokoma elanga, epai wapi moto na moto akoki kotiya milona ekobota mbuma mpe ekopesa elili ya malili mpo na bopemi, ata na kati ya kao, ya mobulungano to ya mabele ma mwindu ya ngomba ya moto (volcan) ya Goma ¡±. Aline alingi ¡®te boluboli bwa Floribert Bwana Chui bozala libakù oyo RDC mobimba ekosepela, ekosangana mpe ekopesa bango makanisi ya kokundola likamb¡¯oyo la bango mboka.  

Abyangi banso bakoki kosangana elongo na Misa ma boluboli oyo ekosalema na ngonga ya 17h30 na Bazilike Saint-Paul-Hors-les-murs, na lisalisi lya episkopo wa lokumu Marcello Semeraro, prefet ya Dikastere ya mpo ya basantu. Fridolin Ambongo, episkopo wa lokumu ya archidiocese ya Kinshasa bakozala wana elongo nà Mgr Willy Ngumbi, episkopo ya Goma. Bakozala mpe: libota la mwa-esengo ya sika azali koya, ba-Congo bakoùta bisika ndenge na ndenge nà mpe lisanga lya ba-Congo bavandaka na Roma. Mbulamatari ya RDCongo mpe akozala.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

   

11 s¨¢nz¨¢ ya mot¨®b¨¢ 2025, 17:12