Bakokomisa Mwa-Esengo Floribert Bwana Chui ekozala o mokolo mwa 15 ya yuni, azalaki martiro mwa kanyaka.
Bansango ya Vatikan
Lingomba lya Sant¡¯Egidio ezali na esengo ya koyebisa boluboli bwa mosali na Nzambe Floribert Bwana Chi. Ekozala o mokolo mwa zomi na mitano (15) ya sànzà ya yuni mokoyà, na ngonga ya 17h30, na ndako-Nzambe monene ya Santu-Polo-Libanda-lya-Bifelo (Basilique Saint-Paul-hors-les-Murs). Moto akokamba misa mana ezali episkopo wa lokùmu Marcello Semeraro, prefet ya Dikastère ya mpo ya basantu. Bakosangana na milulu mina, batindami ya eklezya ya Congo, mingi penza bato ba diosezi ya Goma, kobanda na episkopo wa yé, Willy Ngumbi mpe Fridolin Ambongo, episkopo wa lokumu la Kinshasa.
Litatoli (ndakisa) lya boyambi
Sant¡¯Egidio atondi nzambe botondi mpo ya litatoli lya boyambi mpe ya bosantu bwa elenge mobali eye. Na lingomba, akaboli bomoi na bolingo mpo na babola mpe na kobatela bana mike. Azalaki douanier na mindelo ya Rwanda. Alakisaki mpiko ut¡¯o azalaki o kelasi na eteyelo ya likolo, kelasi ya boboto ya Sant¡¯Egidio na Goma. Aboyaki kozwa mbongo mpo ya kolekisa, mituka minene ya biloko ya koliya ebebà. Bilei bina bikokaki kobebisa mingi mpenza bomoi ya babola. Na yango, na sànza ya yuli ya mobù 2007, banyongaki yé mpe babomaki yé. Azalaki kaka na bambula tukù mibale na motobà (26 ans) ya mpamba. Mpo ya ¡°boyini bwa boyambi, babomaki ye bo martiro. Ezalaki likambo ya kanyaka mpe lokoso lya mbongo, oyo, ezali kobebisa bomoi bwa lobi la bato mpe elikya ya Afrika. Kotelemela mabé ezali elembo lya elikya mpe ya nsekwa mpo na etando ya Kivu oyo etungisami na bomartiro. Mabele maye matungisami na bitumba ya mpasi oyo ekosilaka te. Kutu mikolo miye, ekomi lisusu makasi koleka. Pàpa François andimaki bomartiro bona na sànzà ya zomi na moko moleki; bongo abandaki mosala ya kokomisa ye Mwa-esengo. Ezali ndakisa monene mpo ya bilenge banso ya mabele ma yé.
Maloba ma Pàpa Franswa.
Na mobembo mwa yé na Republique Democratique ya Congo, o mokolo mwa mibale (2) mwa sànza ya febuali ya 2023, Pàpa Franswa alobelaki yango lisusu na Stade ya bamartiro ya Kinshasa ¡®te : « yoko elenge lokola yo, Floribet Bwana Chui, ya bambula pene ya tuku mibale na motoba (26 ans) akufaki na Goma mpo ya kopekisa boleki bwa biloko bya koliya ebebà, mpamba te biloko bina bilingaki komema bokono bwa nzoto na bato. Akokaki mpe kondima, atika yango ekota, ye mpe avwama (azwa mbongo). Kasi, bo mokristo bwa yé epekisaki ye, asambelaki, akanisaki baninga, mpe aponaki bosembo bongo alobaki ¡®t顯 o bosoto bwa kanyaka. Lolenge lyoko lisese lilobi ¡®te kobomba maboko bopeto, nzokandé maboko oyo ezali kotambwisa mbongo etondi makila».
«Soki moto apesi yo mbongo,to alaki yo bomengo mpe nkita, kokweya na motambo mona té, kolinga te bakosa yo, kodinda na mabé té. Kotika mabé elonga yo té, kondima bakomplo ya mbongo té, oyo ekodindisa yo na butu». kozala semba ezali kongenge na moyi, ezali kopalinginya mwinda mwa nzambe, ezali kovivre bisengo ya bosembo : kolonga mabé na malamu!»
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.