MAP

2021.08.19 Lingomba ya Taizé eyambi bilenge ya bakristu na bokutani nà bilenge ya bamizilmà 2021.08.19 Lingomba ya Taizé eyambi bilenge ya bakristu na bokutani nà bilenge ya bamizilmà 

Bakristu nà bamizilma bakutani epai ya Taizé

Kobanda mokolo mwa lomingo moye mwa zomi na misato (13) ya sànzà ya yuli, lingomba ya Taizé ezali koyamba mpo ya mbala ya mwambé (8è) na bokutani bwa bondeko, bilenge ya lingomba ya bakristu mpe ya Bamizilma. Bilenge nkama mibale oyo bawuti na mikili ndenge na ndenge bakosangana na boyokani kino o mokolo mwa zomi na mwambé ya sanza yuli (18 juillet). Motó ya likambo : «Kotambola elongo». Bokutani bona ekopesa bango libakù ya koyeba eyamba ya moninga mosusu mpe ya kotya moboko ya kimya.

Albys KBD CP - Kinshasa/RDC

 

Mpo na mbala ya mwambe, ngomba ya Taizé ezali koyamba bilenge ya bakristu mpe ya Bamizilma soko nkàmà mibale (200) oyo bautaki na France, mingi mpenza ya Lille mpe ya Massy. Na lisalisi lya bamizéle mibale ya Nordi mpe ya esanga ya France (Île-de-France), lisangá lya mokili mobimba ezali kolendisa boyokani kati na mangomba mpe boyokani kati na bilenge ya mimeseno ndenge na ndenge.

Bamizilmá oyo bazali na botόndi

Mbula na mbula, likita lyango ezali kaka na ntina mingi. Ndeko Luc, oyo atalaka makambo ya koyamba bilenge esika ya Taizé, akundolaki ‘te “Bamizilma basepelaka mingi kozala na esika oyo bayambi bango, epai wapi bazali na boboto”. Nzokandé bazali tango mosusu koyoka mpasi mpo na makanisi mabe oyo bato basusu bazalaka na yango mpo na bango. “Bazali mpe na botondi ya komona bilenge bandimi, bilenge bakristu oyo bazali kosambela mpe bazali kozwa mateya mpe bazali kokabola bondimi bwa bango. Mpamba tè, mbala mingi bazalaka na likanisi ‘te na Europe boyambi ezali te, bongo batungisami makasi mpo ya yango”. Basepeli komona ‘te, bokutani bonà ya bondeko ezali kolendisa bango.

Longola mwa mikolo oyo balekisi na bilanga (to esobe) ya Bourgogne, mbuma nini ekoko kobotisama na mayangani kati na bakristu mpe Bamizilma ? Ekobaki yé kotuna. «Esengo mpe bondeko kati na boboto», ndeko Luka ayanolaki. Moto na moto asangani wana asengeli kososola ye moko ‘te «kokutana ekoki kosalema, koyoka mpe ezali lolenge yoko, mpe moto mosusu azali likama mpo na moninga te, azali liboso mokakatano te, kasi azali ndé elaka ya boninga, nzela oyo ezali kofungwama, likambo ya sika ya kokundola».

Elikya ya komona espériansi oyo epalangani mpe mbuma na yango ezali kobotama, euti na bososoli ‘te, soki bokutani mpe boninga ya lolenge eye ekoki kosalema na lingomba ya Taizé, ekoki mpe kosalema na libanda, na baengumba minene, na ba kartiers, na bisika binso. «Ezali kolendisa, ezali kopusa, ezali kopesa makasi ya koloba ‘te, tala, kimya ekoki kosalema, bomoi ya kitoko ya mikolo mizali koya oyo ekobota mbuma ekoki kosalema. Tosengeli te kozala kaka na matata, na bozangi kotyelana motema, kondongwana (kowelana) to kozala na bokabwani ya bangàmbo». Ekolikya ndeko ya lingomba ya Taizé.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

13 sánzá ya nsambo 2025, 10:24