Mokakatano mwa ¨¦kim¨¦nisme na limoni lya Taiz¨¦
Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC
Lingomba ya Taizé esambelaki o mokolo mwa motobà (6) ya sànzà ya mayi. Likanisi lipesami lya yoko losàmbo ya lisàngà kati na lingombà mpe na nzela ya internet mpo ya kopesa eyano na mbela ya tata episkopo wa lokùmu. Mpo ya lingomba abandisaki, taizé azalaka na ezaleli ya losàmbo ya lisàngà mpe eyekwisi yango na bilenge biye bakutanaka na yé na lingombà ya bourguignonne. Amipesaki mpe mpo na lisàngà ya Sinodi mpo na sinodalité. Na masolo apesaki na ba medias ya Vatican, Monfelele Mattew, abandeli kolobela likambo lya mokakatano mwa eklezya mpo ya kozala na lisàngà na mokili mobimba.
Natikali na makanisi kitoko makasi na butu ya bokengi ¡°Together¡± yambo ¡®te Sinodi ya Sinodalité ebanda. Pàpa apesaki bobenisi bwa nsuka na lisàngà elongo na bakambi ba mangombà to ba eklezya bisusu, mingi mpenza patriarche Bartholomée, archevêque ya Canterbury; ezalaki mpe nà motindami ya ba-luthériens, ba-réformés mpe baeklezya bya ba-orthodosi bikeseni mpe ya ngambo ya moniele. Tango wana elakisi elembo ya bomoko mpe mokumba mwa Pàpa lokola Mosàleli ya bondeko (lisàngà). Pàpa François abeti nsété na likambo ya boyokani kati na Sinodalité nà oekimenismo. Ezali nzela mibali oyo ekosenga boyoki, koyamba mpe kobongwana biso na biso. Ezali mpe kofungola elikya na bozalani pembeni nà baye bazali lisàngà nà Roma te.
Elingi eloba ¡®te, ekimenismo ekoki kozala mokakatano moko mpo na bontomà ekoyà?
Tembe te, na kanisi ete oekimenismo ekozala likonzi moko ya motuyà mpo ya bontomà mozali koyà. Mpamba te, ekotalela ba elanga ya mosàla ébélé. Tango na kutanaki nà eklezya moko ya Ba-pentekotiste, kotingama ya moyangeli ya lingomba linà esimbaki ngai makasi na motema; alobelaki makambo ya bomoko ya bakristu mpo ya kosàkola na lolenge elongobani Nsango Elamu na lisàngà. Atangàki losambo la Yezu ya bomoko na Nsango Elamu ya Mosantu Yoane.
Ezali na liloba Pàpa François alobakà, ekozongela ngai na makanisi, liloba linà elakisi mpe botuyà ya bontomà bwa yé: ¡°Moko te akobikisama yemei¡±, o limboli nini na liloba liyé, mpe boni boni elingi kolakisa?
Esengeli kaka kopesa litàtoli ya lisangà mp ona kosalisa bausus, mpo nakomipesa na mosàla mwa Nsango Elamu. Ezali lilonga te, kasi mosàla na botawu bwa eyamba; mpe kondima ete, tokoki kopesa biyano na mitunà minso ya bomoyi bwa biso te. Ndé elakisi, kozala na makoki ya koyoka banso, eleki kutu elanga ya baye bakuli libatisi.
Mobembo mwa nsuka ya Pàpa François molingaki mozala mobembo ya mbala ya 1700e ut¡¯o Concile ya Nicée ebandaki. Tembe te, mokitani mwa yé moto akosàla mobembo monà. Ekolakisa nini bozali bwa yé na ekwélà enà mp ona oekimenismo?
Mpo ya bandeko babiso ba-Orthodossi, ekozala elembno makasi. Kasi esengeli tè, makambo mayé motikala séko, molekà mpamba tè mp ona bikwélà. Kozala elongo na bilembo ya Nicée, ekomema biso na boyebani biso na biso. Mokakatano nde yang¡¯oyo, elobi patriarche Bartholomée. Esengeli kozala elembo kitoko, solo.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.