ÐÓMAPµ¼º½

2025.03.17 Na Ekolo ya Nigeriya: Seminariste Andrew Peter oyo babomi (na loboko ya mwasi) nà Sàngo Philip Ekweli bazongisi na bonsomi. 2025.03.17 Na Ekolo ya Nigeriya: Seminariste Andrew Peter oyo babomi (na loboko ya mwasi) nà Sàngo Philip Ekweli bazongisi na bonsomi. 

Na Nigeriya, Babomi seminariste oyo balimwisaki

Diosezi ya Auchi epesi liyebisi moko ya somo; liwa ya Andrew Peter, balimwisaki ye ut’o mokolo mwa misato (3) ya sànzà ya marsi, na bato bamandoki na etukà ya Edo na ngele ya ekolo oyo ya Afrika. Bakangaki bango elongo na sango Philip Ekweli, oyo bazongisaki na bonsomi o mokolo mwa zomi na isato (13). Azalaki na mibù tuku ibale na moko (21 ans).

Albys KBD CP -Kinshasa/RDC

 

Mawa mingi mpenza na ekolo ya nigeria mpo na liyebisi ya liwa ya Andrew Peter, elenge seminariste oyo balimwisaki elongo nà sango Philip Ekweli, mokolo mwa misato ya sànzà ya marsi na etukà ya Edo, na sudi(ngele) ya ekolo oyo ya Afrika ya westi. Azalaki  na mibù tuku ibale na moko (21 ans), nzokandé bazongisaki na bonsomi sango Philip, ut’o mokolo mwa zomi na isato (13), kasi babomi ye. Ezali bongo, liyebisi ya diosezi ya Auchi epesami na ndako ya bopanzi-nsango ya Fides.

Babundisi eklezya Saint Peter

Bakangaki Sango nà seminariste mpe bamemaki bango na ba zamba ya zonga zonga, na tango babundisaki eklezya ya katoliko Saint Peter na Iviukhua-Agenebode, comité ya Etsako Est. Diosezi etondi mobondi mpo na bansambo mpe lisungi. Asengi na mbulamatari mpe bato ya bokengi na kobatela mangombà ya bamboka mp ona bokobi ya kolwimwa y abato o kati ya etùkà ya Edo. Population ezali na kobanga makasi mpo na bozangi kopesa etumbu na baye etando ya Edo lokola esika malamu ya kosala mabé. Bato bazali komimona na likàmà ezangi bokengi na  ba nzela, ba ferme, na bandako ya bangomei. Diosezi ebyangi na mokano ya kosalisa baye babungisi bandeko mpe baningà babango.   

Likàmà ekoméli basango oyo balimwisaki

Basàlàki bansambo mpo na bayé banso basili kobomama na bakangi bato, mpo ete na ngolu ya Nzambe, milimo ya bango mopema na kimya. Liyebisi elobi lisusu ete na bowumeli ya mibù zomi miwuti koleka, bakangaki basàngo motoba (6) ya diosezi, banyokoloki bango kasi batikaki bango; misato (3) babundisaki bango kasi bayaki kokima, nzokandé babomaki na lolenge ya somo mpenza sàngo Christopher Odia, mpe sik’awa bayei koboma seminariste Andrew Peter lokola.

Bozangi libateli ya bitando to ba engumba nziké ya ekolo.

AED, fondation pontificale Aide à l’Église en détresse elimboli ete ekolo ya Nigeria ezali konyokwama bozangi libateli ya makasi na bitando to bingumba ebele (nziké). Alobi ete, solo liwà lya seminariste Andrew Peter, ekomelaki ye sima mwa mikolo na liwà lya sàngo Sylvester Okechukwu ya diosezi ya Kafanchan, na etùkà ya Kaduna, na centre-nord ya ekolo. Kokangisama ya bato mpe kolimwa ya bango ekomi lokola limeseno mpo na bato na mandoki, ba ba extremistes ya Boko Haram mpe Iswap ya Etat Islamique (EI). Bazali kobundisa mpe bakengeli mpata nà basàli bilanga.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

 

17 sánzá ya mísáto 2025, 17:18