Nigeriya : Babomaki sango moko o mokolo mwa misato mwa mputulu
Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC
Na nsango agence Fides apesi, esili koyebana ete babomaki sàngo Sylvester Okechukwu, Nganganzambe ya eklezya ya St. Mary Tachira na mboka Kaura o etukà ya Kaduna na ntongo ya mokolo mwa misato mwa mitano (5) ya sanza ya marsi na eyenga ya mputulu. Bakangaki yé mokolo molekaki, epayi wapi azalaki kovanda na ndako na yé na Tachira mpe babomaki yé na nko nyonso na mpokwa kaka ya mokolo monà.
Mayebisi ma boboto ya Sàngo Sylvestre
Nayino eyebani te ntina ya liwà ya yé, kasi mikanda mizali komonisa ete Sàngo Sylvestre akulaki bonganga na mobù 2021, bongo azalaki mosali na nzambe solo, amipesaki na mosala mpe na elanga ya mokonzi, alukaki mbano te, kasi ateyaki mateya maboboto, bolingo mpe elikya. Azali nganganzambe oyo apesi bomoyi bwa yé na mosala mwa Nzambe mpe ya mokili. Bakangaki yé nayino na sanza ya zomi na mibale ya mobù 2022, nsima bazongisaki yé na bonsomi, kasi ya mbal¡¯oyo, bozangi bwa yé, etiki bongo polele mitema mpo na libela.
Na ba etukà ya Edo mpe ya Yola, balimwisi basango lokola
Nsima ya mikolo mibale ya kolimwa ya sango Okechukwu, bitulukù ya bato nà mandoki na etukà ya Edo na sudi (ngele) ya ekolo ya nigeria, balimwisaki mpe Sàngo Philip Ekeli nà séminariste Peter Andrew ya eklezya ya St Peter na lingomba ya Iviukwa, o mokolo mwa lomingo mwa 2 ya sanza ya marsi. Na bowumeli ya bondogwani ya masasi kati ya bango, moto ya bokengi moko, abomaki moko ya miyibi miyé na bisikà ya milulu ya bakatoliko. Tee sika, bakéngi bazali kobatela mpe kobikisa bato na maboko ya basali-mabé (to bato ya nko, ya mobùlù).
Bansango ya AED, l¡¯Aide à l¡¯Église en détresse (lisalisi mpo ya eklezya ezali konyokwama) ezali koyebisa lisusu ete, ezali na basàngo mibale balimwaki ut¡¯omokolo mwa 22 ya sanza ya mibale (febuali) na diosezi ya Yola, liboso ya kolimwa ya basàngo Ekeli nà seminariste Andrew, kasi bazwami nayino te. Bongo AED akokoba na koloba ete basàngo zomi na misato (13) basilaki kolimwisama na bikolo bya Afrika na 2024, banso bazwaki bonsomi, kolongola nde moko kaka babomaki.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye