Mokambi ya diplomatie ya Palestine, “Kimia ekoki kosálema, bosémbo ekoki kolónga”
Jean-René Bompolonga- Kinshasa
Mókó ya bileko ya makási ya boleki ya Varsen Aghabekian na Italie póso eye ezalaki bokútáni na ye mokolo ya yambo ya sánzá ya libwá na episkopo ya lokúmu Pietro Parolin, secrétaire ya Letá ya Vatican, pe bolendisi ya kosála elongó káti na Ngwendé ya Sántu-Petelo na Autorité ya Palestine, mingi penza na makambo bitáli masálisi ya lombángo.
Varsen Aghabekian azali ministre ya Makambo ya bapaya ya Autorité ya Palestine. Azalaki na Vatican na ntómá ya Palestine epayi ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, Issa Kassissieh, po ya bozui eyano na pási ezali koleka sik’oyo na Gaza pe na Cisjordanie, na káti waná Yérúsalem-Est.
Elongó na ministre ya Italie ya bapaya, Antonio Tajani, pe bakónzi basusu ya Italie, na lokóla ntómá aponama ya Palestine na Italie, Mona Abu Amara, ministre ya Makambo ya bapaya akendeki kotála bána ya Palestine baye bazali na lopitálo ya Umberto Primo ya Roma, lopitálo ya bána Bambino Gesú ya Vatican pe na lopitálo Gemelli ya Roma.
Libosó ya bokéi na ye, ministre Varsen Aghabekian alobaki na Radio Vatican ‘te boleki na ye na ba lopitálo ezalaki po ya « kozua ba nsango ya bána na mabóta na bangó, po bayóka ‘te bazali pembeni, bayéba ‘te mótó mókó ya bangó azali kokanisa bangó ».
Ezalaki lokóla eleko, ebakisaki ye, ya kolakisa malamu ntómá Abu Amara na bato bazali na lopitálo: « Atálaki bangó, kasi toséngaki boyokani mókó makási káti ya ntómá pe ya ndáko ya mosála etálaka Makambo ya bapaya ». “Toyókani tolendisa ba singá po ya kotómbola boyókani pe bolandi”, elimbolaki ye.
Ministre abakisaki ‘te Italie ayanolaki na pási ya sik’oyo “na loléngé ya lisálisi ya bato, lisálisi po ya bilei pe boyambi ya bato ya bokono awá”. Na kondima ‘te likambo mókó mókó ya lisúngi ezali kotángama, asakolaki 'te esengelaki “’te mokili mobimba esála koleka mingi, po eye ezali koleka na Gaza ezali litánga ya mayi na ebale”.
Maloba ya Papá, nzelá mókó ya kolanda po ya mokili
Po eye etáli bomipesi ya Vatican na bisika ndéngé na ndéngé, ministre alobaki ‘te ezali na litomba makási. Maloba ya Sántu-Papá, elobaki ye, bikoyókana na mokili mobimba. “Pe ezali na ntina lokóla nsango ya bosúngi ya bato ya Palestine”, pe lokóla ya kopesa “nzelá mókó ya kolanda na mokili, eye esengeli kosálema na mokili mókó etungisami na mobúlú”, elobaki ye. Ministre alobaki ‘te “eye ezali koleka na Gaza pe na Cisjordanie ezali mabé pe esengeli kosila. Tozali na pósá ya maloba lokóla ya Papá po ya kolakisa bisó epayi mókó ya kokende”.
Ministre Aghabekian abengaki bokútáni na ye na secrétaire ya Letá ya Vatican, episkopo ya lokúmu Pietro Parolin, “ya malamu koleka”. “Tosololaki eye ekoleka na Gaza, na Cisjordanie, bozali ya bakristu, bokiti ya motángo ya bakristu, botindi ya likúnya epayi ya bakrsitu, eye esengeli kosálema, eye ekoki komema kimia na eténi ena,…”
Mobémbo ya diplomatie
Mobémbo ya ministre ya Makambo ya bapaya na bikóló ebelé ezali eleko ya kosénga na lisánga ya bikóló ya « kobátela eye ezali sémbo ».
« Eye ezali sémbo leló, ezali lotómo ya bato kopona eye balingi pe lotomo ya mokili”, elobaki ye, na bobakisi ‘te eye nionso bato ya Palestine bazali kosénga, ezali ‘te mokáno ya mokili etósama pe ekokisama.
Lokóla ekomamaki o ebándeli, mobémbo ya ministre Aghabekian elekaki na Slovénie, Croatie, Lettonie pe na Lituanie libosó ya bokómi na ye na Italie pe na Saint-Marin. Pósá na ye, elimbolaki ye, ezalaki ya «kozua lisálisi po na likambo ya bato ya Palestine, po ya bondimi Palestine pe po ya lisálisi mosusu po ya bato”.
Italie, ebakisaki ye, akoki komema na pepo bána 181 na mikandá na bangó pe mabótá na bangó.
Esengeli kozima-móto
Na bolongui na Roma mokolo ya mibále ya 2 ya sánzá ya libwá, ministre akendeki na Caire po na kozala na likita mókó ya Ligue arabe. Alobaki ‘te letá na ye ekokoba tángo insó “kosénga bozimi-móto mókó, po libosó libosó lokóla bato ya Palestine, lokóla bakambi ya Palestine, ezali ya kobikisa ba bomoi”
Kaka na tángo ena, ministre Aghabekian amóni ‘te bato ya Palestine basengeli “kofúngola nzelá na eyano mókó ya politiki eye ekopúsa bisó na lipanda na bisó pe na bokeli ya Letá na mabelé”.
“Kobúngisa elikya ezali na káti ya maloba na bisó te”
Atáko mabakú bizali ebelé, amóni ‘te esengeli “kotikala ngwi po, po ya bato ya Palestine, kobúngisa elikya ezali káti na maloba na bisó te”. “Toyébi ‘te na súka, eye ezali sémbo ezali sémbo”, ebakisaki ye, na bobiangi bôngó mókó mókó ya kobátela elikya. Abakisaki lisusu ‘te “tozali komóna mbóngwana ya ezaleli po ya eyano mókó po ya sékó, elingi koloba súka ya bokangi mabelé na bisó”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo.