MAP

Mabelé eningani na Afghanistan na 2025 Mabelé eningani na Afghanistan na 2025  (AFP or licensors)

Mabelé eningani na Afghanistan, ba nkóto ya bána bazali na likama, ebéleli Unicef

Simá ya mabelé koningana makási na monyele ya ekóló, ebomi bato 800 pe ezokisi 2 700, káti na bangó “bána ebelé”, engebene na motángo ya súka, Unicef, agence mókó ya ONU etálaka makambo ya bána, elobi esengeli kosálisa na lombángo bána baye bazali na pási. Bituluku ya kosálisa basili kokóma “zambi ya koyanola na ba bosenga na lombángo”, elobaki na mokandá mókó ebimaki mokolo ya yambo ya sánzá ya libwá, motindami ya Unicef na Afghanistan.

Jean-René Bompolonga-Kinshasa

Mabelé eninganaki makási na Afghanistan ba ngonga bileki. O ntei ya butú ya mokolo ya eyenga 31 ya sánzá ya mwambi mabelé eninganaki. Mabelé eningani o ekóló na bokási ya 6 na motángo ya Ritcher. Afghanistan ezali mókó ya bikóló ya mobóla ya mokili. Esika mabelé ebándi koningana ezali pembeni ya Jalalabad, na eténi ya Nangarhar.

Motángo ya bato bazui likama ezali likoló

Motángo ya súka elakisi bato ebelé bazui likama: na moke bato bakúfi 800 pe baye bazoki baleki 2 700. Engebene na Unicef, longola “ba nkáma ya bato bakúfi na ba nkóto ya bato bazoki, na bobébisi ba ndáko pe biloko”, “bána bebo” bazuami na motámbo ya likambo ena.

Na mokandá mókó etáli koningana ya mabelé eye ebetaki biténi ya Nangarhar pe ya Kunar, motindami ya Unicef na Afghanistan, Tajudeen Oyewale, alobi “azali na mawa makási ndéngé bomoi ya bato bibúngi pe bobébisi esálemi na boningani ya mabelé”.

Papá azali pembeni

Na ngámbo na ye, Sántu-Papá, na lokásá mókó, akaboli mawa na ye lokóla pe alakeli baye bazali na pási nsámbo na ye. “Sántu Papá Léon XIV apesi nsámbo na ye po ya milimo ya bawéi, po ya baye bazoki pe po ya bato bamónani nanu te”, tokoki kotánga na lokásá ezui mokoloto ya episkopo ya lokúmu Pietro Parolin, secrétaire ya leta ya Ngwendé ya Sántu-Petelo. “Na botiki bato bansó bayóki pási na likama ena epayi ya Nkóló”, Papá alobi na lokásá na ye “bomoko na ye ya sóló”, mingi penza “na baye bazali kolela bobúngisi ya bato ya tálo pe na bituluku ya lisálisi pe na bakónzi bazali na mosála ya kobikisa pe ya botóngi lisusu”. “Na eleko eye ya pási po na ekóló, Sántu-Papá abéleli po ya bato ya Afghanistan mapámboli ya bobondi pe ya ngúya”, esili wana lokásá etindami úto Vatican mokolo ya yambo ya sánzá ya libwá.

Eyano ya lisálisi

Sik’oyo, basálisi bazali kosála kaka na monyele ya Afghanistan po na komeka komóna baye bazali nanu na bomoi. Kasi boluki ezali pási esika ya ba ngómbá pe bozangi bisáleli ya bakónzi ya ba taliban ekozongisa simá misála bisika bizuaki pási makási. Po na koyanola na lombángo na ba pósá, bituluku ya Unicef bazali na “mabelé na bisika bizuaki pási makási” pe bakosála “elongó na baningá na bangó ya Afghanistan pe ba agence ya Onu”, elobaki Tajudeen Oyewale. Unicef “ekopesa libosó libosó misála ya lombángo pe ya libiki po ya bána pe mabótá”. Unicef epesi biloko ebele lokóla ba ema na mabótá baye ba ndáko bikwéi. Afghanistan ezali tángo insó esika mabelé eninganaka mbala na mbala o eleko nkita na ye ezali malongá te.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo.

03 sánzá ya libwa 2025, 16:17