ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Mabel¨¦ eningani na Afghanistan na 2025 Mabel¨¦ eningani na Afghanistan na 2025  (AFP or licensors)

Mabel¨¦ eningani na Afghanistan, ba nk¨®to ya b¨¢na bazali na likama, eb¨¦leli Unicef

Sim¨¢ ya mabel¨¦ koningana mak¨¢si na monyele ya ek¨®l¨®, ebomi bato 800 pe ezokisi 2 700, k¨¢ti na bang¨® ¡°b¨¢na ebel¨¦¡±, engebene na mot¨¢ngo ya s¨²ka, Unicef, agence m¨®k¨® ya ONU et¨¢laka makambo ya b¨¢na, elobi esengeli kos¨¢lisa na lomb¨¢ngo b¨¢na baye bazali na p¨¢si. Bituluku ya kos¨¢lisa basili kok¨®ma ¡°zambi ya koyanola na ba bosenga na lomb¨¢ngo¡±, elobaki na mokand¨¢ m¨®k¨® ebimaki mokolo ya yambo ya s¨¢nz¨¢ ya libw¨¢, motindami ya Unicef na Afghanistan.

Jean-René Bompolonga-Kinshasa

Mabelé eninganaki makási na Afghanistan ba ngonga bileki. O ntei ya butú ya mokolo ya eyenga 31 ya sánzá ya mwambi mabelé eninganaki. Mabelé eningani o ekóló na bokási ya 6 na motángo ya Ritcher. Afghanistan ezali mókó ya bikóló ya mobóla ya mokili. Esika mabelé ebándi koningana ezali pembeni ya Jalalabad, na eténi ya Nangarhar.

Motángo ya bato bazui likama ezali likoló

Motángo ya súka elakisi bato ebelé bazui likama: na moke bato bakúfi 800 pe baye bazoki baleki 2 700. Engebene na Unicef, longola ¡°ba nkáma ya bato bakúfi na ba nkóto ya bato bazoki, na bobébisi ba ndáko pe biloko¡±, ¡°bána bebo¡± bazuami na motámbo ya likambo ena.

Na mokandá mókó etáli koningana ya mabelé eye ebetaki biténi ya Nangarhar pe ya Kunar, motindami ya Unicef na Afghanistan, Tajudeen Oyewale, alobi ¡°azali na mawa makási ndéngé bomoi ya bato bibúngi pe bobébisi esálemi na boningani ya mabel顱.

Papá azali pembeni

Na ngámbo na ye, Sántu-Papá, na lokásá mókó, akaboli mawa na ye lokóla pe alakeli baye bazali na pási nsámbo na ye. ¡°Sántu Papá Léon XIV apesi nsámbo na ye po ya milimo ya bawéi, po ya baye bazoki pe po ya bato bamónani nanu te¡±, tokoki kotánga na lokásá ezui mokoloto ya episkopo ya lokúmu Pietro Parolin, secrétaire ya leta ya Ngwendé ya Sántu-Petelo. ¡°Na botiki bato bansó bayóki pási na likama ena epayi ya Nkóló¡±, Papá alobi na lokásá na ye ¡°bomoko na ye ya sóló¡±, mingi penza ¡°na baye bazali kolela bobúngisi ya bato ya tálo pe na bituluku ya lisálisi pe na bakónzi bazali na mosála ya kobikisa pe ya botóngi lisusu¡±. ¡°Na eleko eye ya pási po na ekóló, Sántu-Papá abéleli po ya bato ya Afghanistan mapámboli ya bobondi pe ya ngúya¡±, esili wana lokásá etindami úto Vatican mokolo ya yambo ya sánzá ya libwá.

Eyano ya lisálisi

Sik¡¯oyo, basálisi bazali kosála kaka na monyele ya Afghanistan po na komeka komóna baye bazali nanu na bomoi. Kasi boluki ezali pási esika ya ba ngómbá pe bozangi bisáleli ya bakónzi ya ba taliban ekozongisa simá misála bisika bizuaki pási makási. Po na koyanola na lombángo na ba pósá, bituluku ya Unicef bazali na ¡°mabelé na bisika bizuaki pási makási¡± pe bakosála ¡°elongó na baningá na bangó ya Afghanistan pe ba agence ya Onu¡±, elobaki Tajudeen Oyewale. Unicef ¡°ekopesa libosó libosó misála ya lombángo pe ya libiki po ya bána pe mabótᡱ. Unicef epesi biloko ebele lokóla ba ema na mabótá baye ba ndáko bikwéi. Afghanistan ezali tángo insó esika mabelé eninganaka mbala na mbala o eleko nkita na ye ezali malongá te.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo.

03 s¨¢nz¨¢ ya libwa 2025, 16:17