MAP

Ba casque bleu ya ONU o kati ya ndelo ya Liban pe Israel Ba casque bleu ya ONU o kati ya ndelo ya Liban pe Israel 

Súka ya FINUL: Episkopo mokónzi ya Beyrouth akobánga po ya Sudi ya Liban

Likoló na mokáno ya Conseil ya sécurité ya ONU mokolo ya 28 ya sánzá ya mwambi ya kosúkisa etindá ya bobáteli kimia na Sudi ya Liban, lisangá ya bikóló ekomituná miángo nini ya kozua po na mobúlú ezala te na eténi ena. Mgr César Essayan, episkopo mokónzi ya Beyrouth po ya ba katoliko ya latin ya Liban, atondi ba casque bleu po na bomipesi na bangó mibú 50 mileki pe apesi mongóngó na ye po ya koloba bobángi ya bato ya Liban libosó ya bozángi koyéba nini ekoleka na ba sánzá bikoya.

Jean-René B.- Kinshasa

Engebene na mokáno esálemaki káti n’Amérika pe France, FINUL (Force intérimaire des Nations Unies au Liban) ekelama na 1978, esengeli «kobanda bokitisi pe bobimi ya bato ya etindá loléngé elongobami kobanda mokolo ya 31 ya sánzá ya zómi na mibále ya 2026. Misála yangó bisengeli kosila na mobú mókó». « Tina ya likambo ezali ya kokóma na ngonga mókó elongobami po ‘te mondóki mókó te longola kaka eye ya bulamatari ya Liban ezala na ekóló pe bokónzi mókó te longola kaka ya Liban esála waná ». Mokáno ebengi lokóla bulamatari ya Israël ya kolongola mampinga na ye baye bazali na Liban.

Makanisi bizali mókó te

Mokáno endimamaki na Conseil ya sécurité ya ONU mokolo ya minei ya 28 ya sánzá ya mwambi, kasi elongobami te na lokásá ya mokáno ebimaka libosó. Bikóló misusu basepelaki na yangó te, yangó waná bato bayébi te ndéngé nini mokáno ena ekosúka.  

Kotika miso ya kofúngwama na Liban

Bobángi makási ya bato ya Liban ezali ‘te, sóki ba casque bleu bazali te, molili ezipa Sudi ya Liban. Bobángi ena elobamaki epayi ya bapanzi nsango ya Vatican na episkopo mokónzi ya Beyrouth, Mgr César Essayan: “Bozali ya FINUL ezali liziba mókó ya kimia ya bato ya Liban, mingi penza na Sudi. Ba sodá ya kimia baye bakoluka tángo insó ya kosálisa bato, Sóki kaka ba casque bleu bakei, bobángi ezali ‘te bato bayéba lisusu te nini ekoleka na Sudi ya Liban, waná ezali bopesi esika na baye balingi kobébisa ekóló eye”.  

Elikya ya kimia

Bomipesi ya France ezali kokende lokóla na nzéla ena. Na súka ya bokútáni káti na Emmanuel Macron, Joseph Aoun pe Ministre wa Yambo ya Liban Nawaf Salam, mokónzi ya France azongelaki pósá na ye ya kobengisa mayangani mibále libosó ya súka ya mobú: ya libosó ezali ya bosúngi mampinga ya Liban, likonzi ya bonsómi ya Liban, pe ya mibále ezali ya botómboli pe botóngi lisusu Liban.  

Elikya na bisó”, esúkisaki Mgr Essayan, “ezali ‘te awá kinó mobú mókó, mokili ezua ba nzéla ya kimia, mingi na Poto pe awa na Moyen-Orient. Yangó waná nalobi ‘te sóki bobimi ya FINUL elingi koloba tobongisa kimia, ezali malamu. Kasi ezala boboto mókó ya malonga, eye ebongami na bolongoli mosusu te”.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo

31 sánzá ya mwambe 2025, 12:49