ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Ba casque bleu ya ONU o kati ya ndelo ya Liban pe Israel Ba casque bleu ya ONU o kati ya ndelo ya Liban pe Israel 

S¨²ka ya FINUL: Episkopo mok¨®nzi ya Beyrouth akob¨¢nga po ya Sudi ya Liban

Likol¨® na mok¨¢no ya Conseil ya s¨¦curit¨¦ ya ONU mokolo ya 28 ya s¨¢nz¨¢ ya mwambi ya kos¨²kisa etind¨¢ ya bob¨¢teli kimia na Sudi ya Liban, lisang¨¢ ya bik¨®l¨® ekomitun¨¢ mi¨¢ngo nini ya kozua po na mob¨²l¨² ezala te na et¨¦ni ena. Mgr C¨¦sar Essayan, episkopo mok¨®nzi ya Beyrouth po ya ba katoliko ya latin ya Liban, atondi ba casque bleu po na bomipesi na bang¨® mib¨² 50 mileki pe apesi mong¨®ng¨® na ye po ya koloba bob¨¢ngi ya bato ya Liban libos¨® ya boz¨¢ngi koy¨¦ba nini ekoleka na ba s¨¢nz¨¢ bikoya.

Jean-René B.- Kinshasa

Engebene na mokáno esálemaki káti n¡¯Amérika pe France, FINUL (Force intérimaire des Nations Unies au Liban) ekelama na 1978, esengeli «kobanda bokitisi pe bobimi ya bato ya etindá loléngé elongobami kobanda mokolo ya 31 ya sánzá ya zómi na mibále ya 2026. Misála yangó bisengeli kosila na mobú mókó». « Tina ya likambo ezali ya kokóma na ngonga mókó elongobami po ¡®te mondóki mókó te longola kaka eye ya bulamatari ya Liban ezala na ekóló pe bokónzi mókó te longola kaka ya Liban esála waná ». Mokáno ebengi lokóla bulamatari ya Israël ya kolongola mampinga na ye baye bazali na Liban.

Makanisi bizali mókó te

Mokáno endimamaki na Conseil ya sécurité ya ONU mokolo ya minei ya 28 ya sánzá ya mwambi, kasi elongobami te na lokásá ya mokáno ebimaka libosó. Bikóló misusu basepelaki na yangó te, yangó waná bato bayébi te ndéngé nini mokáno ena ekosúka.  

Kotika miso ya kofúngwama na Liban

Bobángi makási ya bato ya Liban ezali ¡®te, sóki ba casque bleu bazali te, molili ezipa Sudi ya Liban. Bobángi ena elobamaki epayi ya bapanzi nsango ya Vatican na episkopo mokónzi ya Beyrouth, Mgr César Essayan: ¡°Bozali ya FINUL ezali liziba mókó ya kimia ya bato ya Liban, mingi penza na Sudi. Ba sodá ya kimia baye bakoluka tángo insó ya kosálisa bato, Sóki kaka ba casque bleu bakei, bobángi ezali ¡®te bato bayéba lisusu te nini ekoleka na Sudi ya Liban, waná ezali bopesi esika na baye balingi kobébisa ekóló eye¡±.  

Elikya ya kimia

Bomipesi ya France ezali kokende lokóla na nzéla ena. Na súka ya bokútáni káti na Emmanuel Macron, Joseph Aoun pe Ministre wa Yambo ya Liban Nawaf Salam, mokónzi ya France azongelaki pósá na ye ya kobengisa mayangani mibále libosó ya súka ya mobú: ya libosó ezali ya bosúngi mampinga ya Liban, likonzi ya bonsómi ya Liban, pe ya mibále ezali ya botómboli pe botóngi lisusu Liban.  

¡°Elikya na bisó¡±, esúkisaki Mgr Essayan, ¡°ezali ¡®te awá kinó mobú mókó, mokili ezua ba nzéla ya kimia, mingi na Poto pe awa na Moyen-Orient. Yangó waná nalobi ¡®te sóki bobimi ya FINUL elingi koloba tobongisa kimia, ezali malamu. Kasi ezala boboto mókó ya malonga, eye ebongami na bolongoli mosusu te¡±.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo

31 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 12:49