ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Bato ya Haiti bazali kokima ba ndako likolo ya bato ya mobulu na Port-au-Prince Bato ya Haiti bazali kokima ba ndako likolo ya bato ya mobulu na Port-au-Prince 

Ha?ti, bamemi na mak¨¢si bato libw¨¢ k¨¢ti na bang¨® mamelo m¨®k¨® na mw¨¢na m¨®k¨® ya eb¨®s¨®no

Etuluku m¨®k¨® na mind¨®ki etiyaki mob¨²l¨² na nd¨¢ko ya b¨¢na bitik¨¦ S¨¢ntu-H¨¦l¨¨ne na Kenscoff, na mb¨®ka-mok¨®nzi Port-auPrince, na bomemi na mak¨¢si motindami m¨®k¨® ya mw¨¢si (une missionnaire) ya ek¨®l¨® Irlande Gena Heraty, bas¨¢li sambo pe mw¨¢na m¨®k¨® ya eb¨®s¨®no ya mib¨² mis¨¢to. Et¨¦ni eye ezali na k¨¢ti ya mob¨²l¨² na ek¨®l¨® m¨®k¨® eb¨¦bi na bokwei ya b¨²l¨¢m¨¢tari pe ekonzami na bato ya mak¨¢si bazali na mind¨®ki. Engebene na ONU, babomi bato koleka 1 500 ¨²ta s¨¢nz¨¢ ya minei kino ya mot¨®b¨¢, na bomemi na mak¨¢si bato kol

Jean-René B.-Kinshasa

Na butú ya 4 ya sánzá ya mwambi, etuluku ya bato na mindóki ekotáki na ndáko ya bána bitiké na sudi ya mbóka-mokónzi ya Haïti pe ememi na makási basáli libwá, káti na bangó motindami mókó ya mwási Gena Heraty, oyo asálaka na lisangá « Nos Petits Frères et S?urs » úta mibú 30, basáli sambo ya Haïti pe mwána mókó ya ebósóno ya mibú misáto. Engebene na bato ya ekóló, bato ya mobúlú balekaki efeló mókó pe bakoti na ndáko na bobeti masási te. Mbala mókó simá ya bokoti na makási, batindi na makási bakangemi babima na ndáko na makoló. Lisangá ya ba mbulumbulu, eye ekomaki simá ya mbela na bango na baye batikalaki na ndáko, ebándi koluka na esika ena, kasi ezui eloko te kino sik¡¯oyo. Po na ngonga eye, etuluku mókó te elobi te ye ndé esáli mobúlú ena pe eséngi mosolo te.

Ekóló mókó eye mosála ya búlámatári ezali lisusu te

Eye elekaki ezali eténi mókó ya sika ekolakisa bóni-bóni Haïti ezuami na motámbo ya molongó mókó ya mobúlú. Pási na ekóló ezali mbano ya bozangi bokónzi eleko mókó molayi simá ya bobomi ya mokónzi Jovenel Moïse na 2021. Úta 2024, mbóka-mokónzi Port-au-Prince ezali na maboko ya bato ya mobúlú, yangó ememaki ministre wa Yambo ya kála Ariel Henry ya kotika ebóngá, pe ememaki na bokeli Lisangá mókó ya bokónzi ekambami lélo na ministre wa Yambo Didier Fils-Aimé. Bato ya mobúlú bapanzi mabé na bango koleka mbóka-mokónzi, na tángo waná lisangá ya ba mbúlúmbúlú ya ekóló, ezali na bato mingi te na bisalelo moke, ezali kokoka te kozongisa kimia pe bokengeli na ekóló. Na loléngé ena, misála ya búlámatári bitiami pembeni pe bato bazali kobika na bobángi tángo inso mobúlú, moyibi pe bomemi na makási. Po na makambo manso biye, ekóló mobimba ekoleka eleko mókó ya pási eleki makási.

ONU ekoloba bato bakúfi pe bazoki

Mokánda mókó ya sika ya ONU, ebimaki mokolo ya 2 ya sánzá ya mwambi elekaki, elobaki likambo ebengaki yangó ¡°motungisi eleki makási" po na makoki ya bomoto na Haïti: na moke bato 1 520 babomi bangó pe 609 bazui ba pótá káti ya ba sánzá ya minei pe ya motóbá 2025. Mingi kati na bato waná bazali na mbóka-mokónzi Port-au-Prince, kasi mokánda elobi lokóla bomáti ya mobúlú na bisika misúsu lokóla ya Centre pe Bas Artibonite. ¡°Mobúlú ekokoba kobébisa makoki ya bomoto pe ya komátisa pási ya bato, ekotinda bato ebele batika bsika bavandaka na makambo mabé bisika bazali kokende, mingi mpenzá po ya bási pe bána¡±, elobaki Ulrika Richardson, motindami ya buro ya ONU na Haïti.

Mobúlú epayi binsó pe bato ebele bakimi bisika bavandaka

Longola bawei na baye bazoki, mokánda elobi ¡®te na moke bato 185 bamemi bangó na makási pe makambo 628 ya bosangisi nzóto na makási, mingi epáyi ya bási na bána. Mokánda ena etelemeli makambo ya boumbu, ya botekisi bato pe mobúlú ya bosangisi nzóto na makási. Na súka ya sánzá ya motóbá, bato batikaki bisika bavandaka bikómaki milio 1,3 o káti ya ekóló, na motángo ya bato ya ekóló milio 11. Engebene na ONU, bituluku ya bato mabé bapanzi pe bakólisi mobúlú, na bokomisi mosála ya bato basalisaka makási.  

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo

07 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 14:15