MAP

Mobulu n'Angola likolo ya botomboli talo ya carburant Mobulu n'Angola likolo ya botomboli talo ya carburant 

Botomboki na likoló ya bomoi ekómi pási n’Angola, Eklezia ekoléndisa po na bosololi

Lisangá ya ba episkopo y’Angola pe Sao Tomé ebéngi na kimia simá ya mobúlú makási po ya botómboli tálo ya carburant eye ekoningisa ekóló. Na moke bato 22 babomi bango, káti na bangó mbúlúmbúlú mókó, pe bobébiseli ba ndáko ya mombóngo ya bilei esálemaki.

Jean-René B.-Kinshasa

Likambo ya botelemeli botómboli tálo ya carburant eluki liwa ya koleka bato 20 pe ememi bokangemi ya koleka bato 1 200 na ekóló mobimba, nzókandé mobúlú ekokoba kaka úta mokolo ya yambo ya 28 ya sánzá ya sambo na bitúká misúsu ya mbóka-mokónzi Luanda.

Botómboli tálo ya carburant

Mobúlú, emonani na bobébiseli, kimoyibi pe bitumba na ba mbúlúmbúlú, esálemi simá ya bozui mokáno na búlamatári o ebándeli ya sánzá ya komátisa na moko o likolo ya misáto (1/3) tálo ya diesel po ya bokitisi mwa moke pási ya mosolo Leta azali koyóka na bopesi ba subvention.  Masangá ya bakúmbi ba taxi-minibus, baye bamátisaki bangó pe lokóla ba tálo na bangó kino 50%, babongisaki bobóyi mosála mókó ya mikolo misáto po ya kotelemela mokáno ena. Ekóló eye ebimisaka pitóló n’Afrika ya Súdi ekitisaki malémbe malémbe ba subvention ya carburant úta 2023, tángo botómboki na likoló ya botómboli ya tálo ya essence ememaki mabé.

Mbela ya Eklezia

Po ya episkopo ya Saurimo pe mokónzi ya Lisangá ya ba episkopo y’Angola pe ya Sao Tomé, Mgr José Manuel Imbamba, atáko bozángi na ekóló ezali, tokóki kondima soki moke te makambo maye ya bobébisi pe ya mobúlú, biye bikobébisa bomoi ya mabota, biloko ya Leta pe ya bato. Yangó waná Lisangá ya ba episkopo ekosénga bosololi moko, po ya bozongisi makambo ndéngé ezalaki. “Nakobenga bilenge na bisó ya kozala na ezaleli esengeli pe ya kozóngisa bosololi kati na bána mbóka na bakambi”, elobaki ye.

Na ekóló eye ya lokóta ya portugais ya ba milio ntúkú misáto ya bato, inflation emáti makási pe ekómaki pembeni na 20% na sánzá ya motóba, nzókandé baye bazangi mosála bakómi pembeni na 30%. Mobúlú ebimaki mokolo ya liboso ekómi kino o káti ya ekóló.

Lisangá ya bakúmbi ya taxi ebéndi nzoto na eye etali mobúlú, kasi endimaki kokoba bobóyi ya mosála kino na súka. O eleko ya mobúlú ya mokolo ya yambo na Luanda, pembeni na bato 2 000 bandimaki mbela ya masangá ya société civile po ya kotelemela botómboli ya tálo ya carburant. Kasi, ba mbwakela ya bato basalaki mobúlú bitalaki likambo ya “corruption” ya MPLA, parti eye ezali na bokónzi na ekóló. Kandá ya bato ya mobúlú etikaki pembeni te mokónzi João Lourenço, oyo aponamaki mbala ya ibále na 2022 po ya mibú mitáno misúsu ya mpifó.

01 sánzá ya mwambe 2025, 13:47