Bamemi na makási bato 50 na Nigeria
Jean-René B.-Kinshasa
Ba civil 50 bamemaki bango na makási na “bakompani-kitunga”, na nordi-ouesti ya Nigeria. Engebene na mokánda mókó (rapport) ya bato ya mayéle ya ONU etali likambo ya kosenzéla mobúlú na ekóló, bato bazali na mindóki bamemi na makási koleka bato 50 na etúká ya Sabon Garin-Damri, na mbóka ya Zamfara. Ezali bôngó bomemi bato ebele na makási ya yambo na engúmba ena úta sánzá ya liboso. Atáko bôngó, mokánda esémboli ‘te “lisiko (tendance) ya sika-sika ya bomemi bato ebele na makási na Zamfara ekómi kobángisa”.
Mbala mókó lisusu, mbóka ya Zamfara ebetami na mobúlú ya ba pomba babomi. Na sánzá ya sambo, bato 33 babomaki bangó kaka na engúmba ena, atáko bafútaki mosolo na makasi kino 33.700 dollars, engebene na bato ya mbóka. Ba mbóka ya káti-káti pe ya nordi-ouesti bazali na bobángi ba mibú ebele likoló ya esaleli ebongisama ya koboma bato. Loléngé ya kosála ezali kaka mókó: bamemi na makási pe bakangi bituluku ya ba civil ba sánzá ebele, pe na simá mosolo eséngami na makasi po ya botiki bakangemi.
Bowélani káti na basáli bilanga na ba babokoli-nyama
Bobúti ya mobúlú na engúmba ena ezali na ebándeli ya bozangi boyokani káti na babokoli-nyama pe basáli bilanga, po ya makoki ya bozui mabelé pe ya mayi. Engebene na maloba ya ONU, likoki ya mabelé pe na biloko bisusu ezali liboso mpenzá bozui mbala mókó makoki pe bonsómi po ya bato ya mbóka. Bilakisami ndakisa na likoki ya kozala kaka na bokoti na mabelé pe na biloko bisusu, na lokóla esaleli pe bobongisi yangó na bato. Atáko bôngó boséngi ena epesa nzela na bitumba, biye bibóngwana simá ya ba mibú, na bobomi ebongisama na bakompani-kitunga. Bakómi bakambi ya masangá na bitúká po ya bofútisi mpáko na basáli bilanga. Bazali kosála lokóla bopúnzi.
Bobúti ya mobúlú na ndelo ya Niger
Ezuami na ndelo ya Niger, Zamfara ekóma káti-káti ya mobúlú makási biye bibébisa mosála ya elanga, na botindi na makási ba milio ya bato batika ba ndako na bangó. Mobúlú emáti lisusu makási likoló ya boyokani káti ya bakompani-kitunga na ba jihadiste, baye bazali o ebándela ya etumba makási na nordi-ouesti ba mibú bebo. Mokánda etelemeli « mbóngwana moko ya esaleli ya bakompani-kitunga na mobúlu ya makási koleka na nordi ya Zamfara ». Na ndéngé ena, póso elekaki, mampinga ya Nigeria bibomaki bakompani-kitunga 45, o eleko ya bobeti masasi na káti-káti ya ekóló. Makambo mana bikolakisa bomátisi ya misála ya ba soda, po na kobunda na mobúlú.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo