MAP

Paloise ya Libota-Lisantu ya Gaza Paloise ya Libota-Lisantu ya Gaza  (P. Romanelli)

Po ya sango Romanelli, “kaka ngúyá ya losámbo ekosunga po na kotelema"

Etikali kaka losámbo po ya kobatela bomókó ya lisanga moke ya bakristu ya Gaza, elembi na etumba pe na bozangi bilei. Sango ya ekolo Argentine, sángó mokonzi ya eklezia ya Libota-Lisantu, alobaki na bapanzi nsango ya Vatican mikakatano bazali na yango na paloisse ya etuka ena ya Palestine: “ezali na bolembi pe bomitungisami ebele, po tozali komona tozali biso moko na etuka eye”.

Jean-Rene B-Kinshasa

Kilo moko ya farine ekomi na 18 euros, ba tomati pembeni na 23 euros, litungulu moko kati na 12 pe 15 euros. Po na kilo moko ya sukáli, esengeli otanga koleka 100 euros. Naino tozui café ya bololo te: kilo moko ya café ya bololo ezali koleka 250 euros”.  Sángó mokonzi ya Gaza, sango Gabriel Romanelli, na mawa moko eye ebwaki elikya te, azongeli lisusu lolenge ya bovandi ya bato ya Gaza.

Kufa pe bobébisi

Tozala polele, ezali likambo moko ekoki kosalema, pámba te esengeli kozua biloko yango liboso ya kosómba. Ezali kaka pasi. Po na ba ndúnda, tokotalela, soki bizali, bilanga ya mike ya etumba biye balóni ya bôngó bôngó babimisi. Kasi ezali komonana mingi te, zambi bato ebele bakimi epayi ya súdi ya etuka”, emoni sángó Romanelli. Lisalisi ebombanaki o eleko ya bokati etumba “esungaki biso na eleko ena, pe lokola ya kosalisa mabota ebele ya ba musulman baye bazali kovanda pembeni ya paloise”. Sima ya blocus ya lisalisi ekanemaki na Israël mokolo ya 3 ya sánzá ya misato elekaki, “eloko moko te ekomaki pe tosengelaki kobomba biloko bitikalaki po na biso moko pe ya kolia ndámbo ndámbo”.

Epayi mosusu, ekobaki ye, “na ba ndako biye bizali nzinganzinga na biso, bato banso bakeyi. Nzinganzinga na biso ezali kaka kufa pe bobébisi. Moyi pe butú, tokoyoka makeléle ya ba bombe bye bikokweya mosika te na paloise”. “Ezali likambo ya bozoba”, egangi sángó mokonzi ya Gaza, na bolobi na mawa ‘te sima ya ba sánzá 21, “makeléle bina ya mabe” bikota sik’oyo na bomoi na bango ya mokolo na mokolo.  

Bolembi nzoto ya bakristu bazali na bomoi

Pembeni ya bato 500 bavandi na biteni binso ya paloise. Liboso ya mokolo ya 7 ya sánzá ya zómi ya 2023, bakristu ya Gaza bazalaki na motango ya 1017, pe pembeni ya 300 bakokaki kobima na etuka o eleko litónó ya boleki ya Rafah na Ezipito ezalaki naino ya kofungwama. 54 bafukaki, kati na bango 16 na bobwaki ba bombe na eklezia Santu-Porphyre ya ba orthodoxe.  

Epayi na biso, alanga nzembo ya mwasi ya mokóló Elham Farah babomaki ye na sánzá ya zómi na moko pe sima ya sánzá moko, Nahida et Samar, mama na mwana na ye ya mwasi, babomaki bango liboso ya ndako ya Nzambe. Bakristu basusu bakufaki bazali bawei ya etumba (bato ya bokono ya motema, baye ya suklái, etc…) bakokaki lisusu te kozua ba kisi maye basengelaki na yango.   Ba mamelo ya Mère Teresa bazali kobikisa bana 50 ya bibosono pe ya bokono”. Lelo, “ezali na bolembi pe bomitungisami ebele, po tozali komona tozali biso moko na etuka eye”, elobaki sángó mokonzi.

Ngúyá ya losámbo

Eloko moko ekosalisa biso ya kotikala lisanga pe na ndámbo ya elikya ezali losámbo. Na lolenge eye, bokasi ya losámbo ezali ya solo makasi, ezali kaka yango ekosunga biso ya kozala kaka bomoko pe ya kobwaka elikya te”. Kozua ba mbela na nzela ya singa, elobaki sángó mokonzi ya Gaza ezali “na tina lokola po na biso”.

Sángó Romanelli akanisi lisusu ba mbela na nzela ya singa ya Papá François pokwa inso, “biye bizalaki lisalisi enene. Koyeba ‘te tozali eteni moko moke kati na Eklezia monene ya mokili mobimba, koyeba ‘te ba milio ya bakristu na mokili bakosámbela po ya lisanga moke ya mawa ekopesa biso makasi ya kotelema. Bilei, ba nkisi, bizali na tina po na biso lokola losámbo”. “Soki losámbo te, etatoli ye, nde tokomi esika tozali lelo te. Ya biso pe ya bino… Tokolikya na bino”, esukisaki ye.

14 sánzá ya nsambo 2025, 17:18