Na Pakistan, bofúndi ya lokutá ya bofingi Nzámbe ebakisami na bakristu
Jean-René B.-Kinshasa
Adil Babar pe Simon Nadeem bazali bilenge mibale bakristu ya Pakistan baye bazalaki na mibu 18 pe 14 o eleko bafúndamaki po ya bofingi Nzámbe eleki mibú mibale. Simá ya mibú mibale na boloko pe ya kosámba, balongisaki bango na bofúndi ena. Likambo na bangó emonani lokola “malámu koleka”. Ya sóló, mingi bayebi lisusu likambo ya katoliko Anwar Kenneth, lelo azali na mibú 71, eye, akangamaka na kofúnda emonana ya lokutá, alongaka na bofúndami ena simá ya kolekisa mibú 23 na boloko. Kasi, Asif Pervaiz, moto ya Pakistan ya mibú 42 ya eyamba katoliko, azali kaka na boloko pe, akangamaki kino mibú 12 po na kaka likambo ya bofúndi ena, pe bakatelaka ye etúmbu ya liwa na 2020. Ezali moko ya makambo ebele biye moto ayebi likambo te akueyaki na motámbo.
Litatoli ya balobeli katoliko
“Bakristu ya Pakistan bakonyokwama kaka na makambo mabe ya mobéko etali bofingi Nzámbe”, elobi molobeli katoliko Khalil Tahir Sandhu. Ye moto alobelaki pe azuaki botiki ya bato ebele bayebi likambo te liboso ya bazúzi. Asololaki na bapanzi nsango ya Ngwende ya Sántu-Petelo. Mbano ezali te po na baye batiki bango. “Bato bafúndami bakolekisa mingi mingi ba mibú ebele na boloko, na bobúngisi mibú ya malongá ya bomoi na bangó pe botiyi libota na bangó na pási makasi; kasi mbano ezali te, etúmbu pe ezali te po ya baye bakoselaki bangó makambo”, emoni molobeli. “Lolenge ya bosémbo ya Pakistan ezali komonisa pási na babóla pe na baye bazangi makoki”, ebakisi molobeli Luqman Ahmad Khan. “Atáko mobéko likonzi ya Pakistan elobi, lolenge ya bosémbo ya Pakistan ekokoba konyokola babóla, baye bazali kozela ba mibú ebele, bakofúta mosolo ebele po na kosámba pe na bokabwani makasi”, elobi ye. Engebene na moto moko ayebi makambo, “lolenge ya bosémbo ezali koboya sémbo na bato baye bazanga, babola pe na baye bazali ba musulman te”.
Mokandá (rapport) ya HRW
Libótá y’Asif Pervaiz, oyo azali kozela liwa, alobaki lolenge azali kozela pe ayebisaki yango lisanga ya bapanzi nsango ya Fides : « Na sánzá ya minei, esámbelo ekataki mokolo ya kosamba, kasi zúzi aboyaki yango, na bolobi likambo moko te ».
Mokandá moko ya sika ya lingomba Human Rights Watch (HRW) endimaki ‘te « mobéko ya Pakistan na eye etali bofingi Nzámbe ekosala bokeseni, ekoboya bokokani liboso ya mobéko na baye bazali ba musulman te pe ekosunga mobúlú na moto nionso afúndami na likambo ena ». Mobéko ena “basaleli yango mingi po na kozongisa mabe na moto moko to po kosámbisa bilama ya biyamba bazali na bato mingi te”. “Kofúndama moko kaka ya bofingi Nzámbe ekoki komema na etúmbu ya liwa: na ba mibú zómi bileki, babomi bato ebele na mobúlú simá ya kofúndama ya bofingi Nzámbe”, ekomi HRW. Bofúndi ezali kobomba mingi likambo ya nkita, lokola bozui mabele ya bato misusu.
Likambo moko ya matata
Likambo moko ya kobanga ebimi na ba sánzá bileki: lisanga moko ya bato mabe ebongisi lolenge moko ya koyiba na bofúndi baye bayebi makambo te na likambo etali bofingi Nzámbe ya lokutá na Pakistan. Lisanga -engebene na balobeli ya bakristu pe ya ba musulman- ekosalela mobéko ya bofingi Nzámbe lokola motámbo pe lokola lolenge moko ya kobotola pe esili kopona bato 450 baye bayebi makambo te. Kimoyibi ebebisi mabótá ebele baye bakosenga ‘te sémbo esalema. Likambo endimami na Commisio ya Pakistan etalaka sémbo ya bato eye elobi misala ya lisanga ya bato mabe ndenge ekosalela bofingi Nzámbe po na ye na bokweisi na motámbo bato bayebi makambo te. Mikolo mileki, Esámbiselo ya likolo ya Islamabad ayoki kofúnda ya mabótá mingi, esengaki na bulamatari etiya commisio moko po na boluki na likambo yango pe esala