MAP

Ndambo ya mikanda po na Léon XIV Ndambo ya mikanda po na Léon XIV  (© poste italiane)

Mokolo na mokolo, kilo 100 ya mikandá bazali kotindela Papá

Posita (poste) ya Italie elobi ‘te ba kama ya mikandá bazali kotindela Papá wa Roma bikokoma mokolo na mokolo o esika ya bokaboli mikandá ya Fiumicino, mosika te na Roma. Ezali sé bongo úta Léon XIV abandi mosala na ye.

Jean-René B.- Kinshasa

Na sima ya ba kaláti ya posita (cartes postales), tokoki kotánga, “Epayi ya Santu-Papá Léon XIV” to lisusu “Po ya Santu-Papá”. Kómbó ya moto batindeli mokandá ezali polélé, atáko esika mokandá ekokende ezali bôngó bôngó to yango te. Bato ya posita ya Italie bazali komitungisa te, bayebi ‘te mokandá esengeli ekende na Vatican.

Kaláti, mikanda to colis, Léon XIV akozua pembeni ya kilo 100 mokolo na mokolo, elobi communiqué moko ya Posita ya Italie.

Koleka tango inso

Ezali “lolenge ekoleka tango inso kobanda mokolo ya liponami ya Robert Prevost”, mokolo ya 8 ya sánzá ya mitano 2025, elimboli mokonzi ya esika ya bokaboli mikandá ya Fiumicino kómbó ya etuka esika pepo ya mokili mobimba ekitaka na Roma.

Kasi, Antonello Chidichimo amoni ‘te ezali mwa pasi sik’oyo ya “koyeba ekolo nini ekokoma mingi na Papá”. Atangi mikandá bikowuta America, ekolo ya Papá, na lokola Kosovo to Inde.

Mikandá bikokende na Vatican

Sima ya kotelema liboso na esika ya bokaboli mikandá ya Fiumicino, boleki mokolo na mokolo ya mikandá po ya Ngwende ya Santu-Petelo esenzélami pe ekoleka na masini po na bokomisi kómbó pe po na koyeba kilo na yango. “Mikandá ya Papá” bikotelema lisusu na esika ya bokaboli na etuka ezali pembeni ya Vatican, epayi wapi bakokende kotika. Po na koyeba na nani Papá ayanolaka, Léon XIV abombi nsango wana na sekelé.  

10 sánzá ya nsambo 2025, 17:25