Mboka ya bakristu ya Taybeh esimbami na bato na ye
Jean-René B.-Kinshasa
“Pámba te tozali na mokúmbá moko epayi ya lisanga ekoyoka pasi”, ba patriarche pe bakambi ya ba Eklezia ya Yélusaleme bakendeki mokolo ya liboso 14 ya sánzá ya sambo na mboka ya Taybeh, na monyele ya Ramallah, eye ebundisami makasi na ba colon ya Israël. Bakendeki elongo na bantoma ya France, Belgique to Italie.
Bayambaki bango na mokambi ya mboka Suleiman Khourieh pe na sángó Bashar Fawadleh, sángó mokonzi ya paloise ya latin ya Kristu-Mosikoli, ba ntómá balandaki film moko ezalaki kolakisa makambo ya mobúlú biye bizuaki bato ya Taybeh.
Kolobela Israël mingi mingi
Patriarche ya Eklezia ya grec ya ba orthodoxe ya Yélusaleme, Théophile III, azalaki moto ya yambo ya kozua maloba po ya kotatola lisalisi na ye na bato ya Taybeh, na bolobi nini ezali kosalema epayi na bango, elobaki Wafa News Agency.
“Tokutanaki na limpingá ya Israël eye ekoki kokende kuna pe kokutana na ba colon. Ye azali kóló likambo, pámba te limpingá ya Palestine pe ba policier ya Palestine bakoka kokoma na Taybeh te. Tokutanaki lokola na bulamatari ya Israël. Tozali kozela”, elimbolaki Mgr William Shomali na Radio Vatican.
Vicaire général pe vicaire patriarcal po ya Yélusaleme pe Palestine akolela po ya bozangi etúmbu na lolenge ba colon bazali kosala. Basili bakomisi ya bango moko likolo na motóba ya ba hectare ya bato ya Taybeh.
Kokima po na kokufa te
Na monyele ya Ramallah, lolenge ya bovandi na ba mboka ya Palestine ebebi lisusu makasi. Mokolo ya yambo eye, bakambi ya ba Eklezia baboyaki kokende na mboka moko pembeni ya Kafr Malik, nzela ezali ya kokangama.
Engebene na motango ya AFP úta bilembo bipesamaki na Autorité ya Palestine, koleka bato 955 ya Palestine, kati na bango babundi ebele na ba civils lokola, babomaki bango úta mokolo ya 7 ya sánzá ya zómi ya 2023 na ba soda to ba colon ya Israël na Cisjordanie.
Pe po bobangi mabe ekoma, liboso ya mobúlú emati lisusu ya ba colon, bakambi misusu ya masanga bazali koyebisa bato bakima. Esalemi bôngó na ba mboka Mu’araajat East pe ya Ras Ein Al Auja.