Kimia pe lisolo na Méditerranée, bilenge ya Bel Espoir na Istanbul
Jean-René B- Kinshasa
Sima ya boleki pembeni ya Sicile, bisanga ya Malte pe esanga ya Chypre, masuwa ya elikya ekonana sik’oyo na ebale Egée, na bolándi Athènes. Lokola na eténi moko moko úta bolongui na libóngo ya Barcelone mokolo ya yambo ya sánzá ya misato elekaki, bazali bilenge ntuku mibale ya mibú úta 20 téé 35, na masuwa Bel Espoir, kobakisa bakúmbi ya lisanga AJD, mokóló masuwa. Bazala bilenge ya France, Espagne, Palestine, Arménie, Bosnie to Tunisie, banso bakutani na bosenga sé moko ya lisolo, ya kimia pe ya bondeko lolenge ya Bokutani na Méditerranée eye Pápa François asukisaka na 2023. Na bokambemi ya episkopo ya lokúmu Jean-Marc Aveline, bilenge bazali na eténi eye bakomaki na Istanbul mokolo ya 5 ya sánzá ya sámbo, epayi wapi bayambamaki na couvent ya ba dominicain. Bovándeli na bango o ekolo Turquie elekani na bosololi ebele na oyo etali écologie intégrale, likambo likonzi ya eténi ya Bokutani na Méditerranée ya mobú oyo. Likambo ya tina ya boleki na bango na Istanbul : bokutani mokolo ya eyenga na tongo na Bartholomée Ier na Phanar, esika ezali bokonzi ya Patriarcat œcuménique ya Constantinople. Na lisikulu na ye na lopoto, Bartholomée Ier apesaki mbote na mosala ya bilenge ya mobembo mwa boyambi : « Na boponi kosala mobembo na Méditerranée, lokola ndelo te, kasi lokola esika moko ya bokutani pe ya lisolo, bolakisi na makasi ‘te kimia ekoki kozala, pe ekobanda na bomipesi ya solo, botosi epayi na epayi pe molende ya bolingi». Na bolobi tina ya lisolo kati na biyamba na bobateli Bozáli, Bartholomée Ier alobaki lisusu ‘te lisolo ezalaki «liponami moko ya talo» kasi «etindá ya nsango elamu (…), mokáno moko ya mokristu ekomama na motema na bobiangi na biso ya moto azua batisimo». Abengaki bilenge bazalaki wana ya «kokoma bantoma ya biyamba po ya bomoko».
Athènes na liboso
Sima ya mokolo moko ya botamboli na Istanbul, bilenge baye na mobembo mwa boyambi bakutaki masuwa na bango na mabelé ya Grèce, etelemi na libóngo y’ Alexandroúpolis, pembeni ya ndelo ya Turquie, pe bamati po na mobembo ya mikolo mwambi na bolandi mboka mokonzi ya Grèce. Bakotia makolo na mabelé mokolo ya 17 ya sánzá ya sámbo na bozali na bokutani moko na lisanga Praesentia ebongisami na paloisse Santu-Polo na Pirée. Mokolo elandi bakokutana na lisangani ya ba orthodoxe pe bakozala na molulu moko po na kimia na ba jardins ya cathédrale katoliko, na Mgr Théodore Kodidis, episkopo y’Athènes, liboso ya bokabwani pe kozonga na ba mboka na bango mokolo ya 19 ya sánzá ya sámbo.
Charles de Castelnau azalaki o ebandeli ya bokutani na Turquie, pe alekisaki poso mibale na Méditerranée o eleko ya mobembo na Chypre. Atatoli na likambo ekosalema mbala moko o eleko ya mobembo moko moko: «Na lolenge ya mobembo pe moke ya masuwa, ozali na likambo mosusu ya kosala te kaka ya koyokana malamu, po okoki kokanga ezibeli te to kokende mosika…». “Bilenge bazali koyebana na lombangu, lokola bandeko ya mibali pe ya basi”. Bokabwani na súka ya mobembo ezali kosalema na pasi. “Mingi bazali kozonga na posa ya komipesa po na lisolo, po na bokutani, na botali lolenge makambo ezali na ekolo moko moko”, elobaki ye. “Bango banso bakani bakutana mokolo ya 24 ya sánzá ya zómi na Marseille po na bozongi ya masuwa Bel Espoir”