Ba ADF babomi bato 43 na ndáko-Nzámbe moko katoliko ya Ituri
Vatican News
Ezali na ngonga ya mibále na tóngo ya mokolo ya eyenga ya 27 ya sánzá ya sambo tángo mbela ebwakami, elobi Radio Okapi. Na etúká ya Komanda, esika ya mombóngo ya engúmba ya Ituri, bato basimbi ba mbeli bakoteli bato na ngonga ya 21. Bakeyi na ndáko-Nzámbe ya paloise Mwa Esengo Anualite epayi wapi bandimi basanganaki po na losámbo na butú. Engebene na motángo ya sika epesami na Monusco na botángi “bakambi ya etúká”, babomi bato na mbeli, na moke 43 kati na bango bana 9. Sángó mokonzi ya paloise, abbé Aimé Lokana Dhego, alobi po na ye ‘te mingi misúsu bakeyi na bango pe bazali na nsango na bango te.
Batómbóki ya Uganda baye basalaka elongó na lingómbá Etat islamique bakendeki kosala mobúlú na ba ndáko ya bato pe ya mombóngo biye batiaki móto. Bato misúsu ya etúká babomaki bangó kasi bayebi motángo na bangó te. Engebene na Radio Okapi, ba ADF basalaki úta esika bangó bazalaka ya Mon Hoyo pe bazuaki nzela ya Bogi.
Ba ADF bafundami na bakónzi
Engebene na communiqué moko ya mokolo ya 23 ya sánzá ya sambo eleki ya Monusco, koleka bato 80 babomaki bangó na ADF na sánzá ya sambo. Bomáti ya mibúlú biye esalemi simá ya ba sánzá ebele ya kimia. Po na Radio Okapi, mampingá ya Congo/Kinshasa, mampingá ya Uganda pe lisangá ya bambúlúmbúlú batelemi po na kosenzéla etúká ena pe kokanga batómbóki.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo