ĐÓMAPľźş˝

Etuluku moko ya bana ya Gaza bakomi na Italie po na bazua lisalisi Etuluku moko ya bana ya Gaza bakomi na Italie po na bazua lisalisi 

Sango Faltas asengi ebombamelo moko ya malamu po na bana ya Gaza

Lisolo na sango molandi ya Custodie ya Mabele Esantu, sima ya bokomi na Italie ya etuluku ya bana ya Gaza baye bazali na posa ya bosalisi nzoto na lombangu. “Tosambela po ‘te mokili ebandela lisusu kozua ba nzela ya mwinda”

Jean-René B- Kinshasa

Poso eye, likambo ya bomemi na Italie uta etuluku ya Gaza bana 17 ya Palestine basengelaki kosalisa nzoto na lombangu pe bilama 53 ya mabota na bango elekaki malamu. Tolobi yango na lisolo moko na sango molandi ya Custodie ya Mabele Esantu, sango Ibrahim Faltas, oyo kobanda mobu moko na ndambo azali na libandisi ya bobimisi bato. Yango esungi bana ebele ya Gaza po basalisa nzoto na bango na Italie.  

Sango Ibrahim, ezali mbala ya yambo ‘te bana babima na Ramon pe Egypeti te?

Nabandi kokanisa lolenge ya kosunga bana ya Gaza na sanza ya zomi na moko ya 2023. Sima ya likita moko na Papa François, nakendeki na lopitalo Bambino Gesù po na kopesa mbote na baninga minganga baye bamipesa ba mibu ebele po na bana ya Bethléem pe, o eleko ya bokutani ena, nasengaki lisungi po na bana ya Gaza lokola. Uta mokolo ena, bobongisi ya bosungi ebandaki, yango esengaki bondimi ya bulamatari ya Italie po na bomemi bana pe baye bakokengela bango, pe na boyebi ba lopitalo nini biyebi ba bokono pe posa ya bokolongono ya nzoto ya bana. Moko moko azalaki na likambo eye asalaki mosala na ye pe nakoki kaka koloba posa makasi ya ministre Tajani pe basali banso ya ministère ya Italie oyo etalaka makambo ya Bapaya ya kopesa nzela na bana ebele ya kokota na Italie po basalisa bango. Ministre ya Italie azuaki mokano ya kobongisa makambo na ndenge elongobani po na bobimi ya bana, zambi ezali misala bikoki kosenga bobateli po ya bato bakobima na baye bakosala mosala ya ofele. Nazali na botondi makasi na bato ya Italie, na ministre pe na basali ya ministère eye etalaka makambo ya Bapaya; ezali bato baye, ngonga na ngonga, tango mosusu ba mibu, singa moko makasi pe boyokani ya makasi bisalemi likolo ya posa ya banso po na kosunga baye bazali na kati ya bozangi.

Na Adam, ezali lokola na mwana mwasi ya moke, Nour, oyo azali kobela bokono babengi na lopoto “enfants papillons”. Okoki kolimbolela biso soki ezali nini? Pe po na nini, uta etumba ebandaki, ebele ya ba “enfants papillons” bazui libiki te?

Nour azali na mibu motoba. â€œEnfants papillons” ezali bokono ya lopóso; ekokomisa lopóso pete makasi pe bolembu, lokola eye ya ba papillon. Bokono eye bikovimbisa lopóso eye, tango ekopasuka, ekozua mikolobe pe soki basalisi yango na lolenge elongobani te pe na bakisi na bisalelo ya malonga biye bizali te na Gaza. Ba nsango biye bayebisaki ngai ba minganga pe bato basusu ya lopitalo moko ya Modène baye, liboso ya mokolo ya 7 ya sanza ya zomi ya 2023, bazalaki kokende na Gaza po na bosalisi bana bazali na bokono ena. Bokono yango ezali kopesa pasi ya koleka, mingi mingi na ba sanza maye moyi ezalaka makasi. Bayebisaki ngai ‘te basalisaki bana ebele eleki ba sanza ntuku mibale, kasi bazalaki na nsango na bango lisusu te pe bayebi kosolola na mingi kati na bango te.

Na eleko eye, bino baye botikali na Yelusalem, bozali kosolola na nzela ya nsinga na baboti ya bana? Bazali koyebisa bino nini?

Nasololi mikolo miye na Alaa, mama y’Adam. Alaa ayebisaki Adam ‘te Italie ekoyamba bango pe akobika na lisalisi ya minganga ya Italie. Italie ezali po na bango ebombamelo moko elongobani sima ya ba pasi ebele. Nasololi na tata ya Nour na nzela ya nsinga; akokaki koloba esengo na ye te na likanisi ‘te mwana na ye ya mwasi ya moke akozua lisalisi pe akoyoka malamu. Bana mibale baye, na basusu, bakozua lisalisi na eleko moko ya pasi makasi na bomoi na bango ya mokuse. Bakombo ya bakristu ya bango mei: Adam ezali kombo ya moto ya yambo, Nour elingi koloba mwinda. Tosambela po ‘te mokili ebandela lisusu kozua ba nzela ya mwinda”

Bato misusu bakoki kokoma awa na mikolo bizali koya?

Nalingi nazua ba nsango ya solo po na yango. Mokano ya bobimi ezali kotala bileko moko bisengeli miye biyebanaka kaka te. Esengeli komilengela pe kozala na ngonga na oyo nionso ekoki kosalema. Esengeli mingi mpenza kosilisa mopepe ya mobulu eye elingi makasi Mabele Esantu pe ekoboma mwinda ya elikya. Tika ‘te Nzambe asunga baye bazali konyokwama pe bazali kokumba likambo yango te.

16 sĂĄnzĂĄ ya motĂłbĂĄ 2025, 14:51