MAP

2025.06.18 Anton Asfar ya Caritas ya Yelusalem 2025.06.18 Anton Asfar ya Caritas ya Yelusalem  (Caritas Jérusalem )

Na Cisjordanie pe na Gaza, “ba posa bizali ebele”, elobi Caritas ya Yelusalem

Bikipi ya Caritas ya Yelusalem baye basalaka na Gaza pe na Cisjordanie bakokoba mosala na bango epayi ya baye babungisi nionso. Atako Iran abwakaki ba missile na Israël, lisanga eye ya katoliko ekokoba mosala na eleko moko ya bobangi, elimboli Anton Asfar, mokambi ya Caritas ya Yelusalem.

Jean-René B.-Kinshasa

Awa Israël abwakaki ba bombe na Iran mokolo ya mitano 13 ya sanza ya motoba, Caritas ya Yelusalem akati misala na ye po na kotala makama nini bikoki kokoma po ya kokoba mosala na ye lolenge etumba ebandi. Kasi liboso ya ba “posa ebele”, mokonzi ya lisanga eye Anton Asfar abongisaki bozongeli ya misala mokolo elandaki. “Tozali na molongo ya yambo po ya kopesa lisungi na bato, pe lokola lisanga moko enene ya Eklezia, tosengelaki kokoba mosala na biso”, elimbolaki ye.  

Bozangi ya mino (médicaments)

Liboso na etuluku ya Gaza epayi wapi bilama 122 ya bikipi ya Caritas ya Yelusalem bakabwani na biteni zomi ya ba minganga po na kosala lisungi moko ya mbálákáká. Mosala ena ezali kosalema na nsé ya ba bombe pe bato bazali kokufa mokolo na mokolo.   

Makambo bizali malamu te”, elobaki Anton Asfar, na bolobi bozangi makasi ya mino, ya bilei pe ata mayi ya malonga. “Tomemaki bisaleli ebele maye tokaki o eleko ya bozimi moto (cessez-le-feu) ya mikolo bilekaki, kasi biloko na biso bizali kosila”. Tango mosusu OMS to baninga basusu bazali kopesa biso mino.

Na etuluku ya Gaza, maye tozali komona ya bomoi ya mokolo na mokolo bizali ya koloba te. Bana mike makolo ngulu bazali koluka bilei bitikalaki na ba fulu, ba ngungi bazali kopesa bato bokono, bokaboli bilei na Fondation moko ya Gaza ezali kosuka na liwa…

« Cisjordanie ezali ya kokangama »

Atako bongo, Caritas ya Yelusalem ekobeta ngonga lokola na makambo ya pasi bizali koleka na Cisjordanie. Na bowuti mobembo moko na nordi, Anton Asfar amonaki botongi ya bifeló ya sika, bisika ya bovandi ya ba soda ya sika. «Namonaki ba mbongwana na botamboli kuna », elobaki ye. Lokola na mboka Sinjil, na ba kilomètre 50 na nordi ya Yelusalem, kobanda sik’oyo elingami na bifelo ya milayi.

Cisjordanie ezali ya kokangama, bato bazali kotambola lisusu mingi te”, ekobaki Anton Asfar, oyo atangaki 900 ya bisika ya botali mikanda to barrière na Cisjordanie nionso. Mosala ya bilanga, eye ya eteyelo pe nkita nionso bikonyokwama makasi na lolenge makambo mingi bilali.

Lisusu, na bokati ba mibembo mwa boyambi na Mabele Esantu, bituka bebo lokola Bethléhem bakobika na pasi. Pembeni ya basali 200.000 bazangi misala na Cisjordanie, emoni Caritas ya Yelusalem. Lisanga eye ya katoliko ezali komeka kosunga nkita ya Cisjordanie na bomemi milona po na baye bazali kosala bilanga…

Koleka bato 40.000 bakimi o kati ya ekolo

Caritas ya Yelusalem ezali kosala mosala epayi ya bato 40.000 bakimi o kati ya ekolo bazali kovanda na Jénine, na Nour Chamas to lisusu na Tulkarem. “Bato wana bakimi o kati ya ekolo bazali na eloko te: bazali na posa ya bilei, biloko ya kopema, biye ya bonsomi. Tozali kosala oyo tokoki po na kosunga bango…”, elimbolaki Anton Asfar.

19 sánzá ya motóbá 2025, 18:21