MAP

na ndelo ya ba Corée mibale na ndelo ya ba Corée mibale  (AFP or licensors)

Mokolo ya bozongisi bondeko na Corée: boyambi po ya koleka matáta

Mikolo minso ya 25 ya sánzá ya motóbá, bato ya ekolo Corée basepelaka Mokolo ya bozongisi bondeko na Corée. Ekelama na 1965 na ba episkopo ya Corée ya Sudi, ekundolaka ebandeli ya etumba ya Corée ya 1950, eye ewumelaka mibú milayi misato. Lisanga ya katoliko ekolikia lelo lisusu bozongisi bondeko kati na bikolo mibale pe ekobenga losambo zambi ya kimia.

Jean-René B.-Kinshasa

Spes ultima dea. Elikya ekufaka te po esalemi na Kristu Yezu. Na oyo etali bikolo bina, epayi wapi bilembo ya boyokani ya malamu bizali te, lisanga ya katoliko ya Corée ya Sudi ekolemba te. Ekokoba kolobela elikya pe, mingi mingi, ekotika te kosambela po na kimia pe bozongisi bondeko na Corée ya Nordi.

Mgr Simon Kim Ju Young, episkopo ya Chuncheon pe mokonzi ya Lisangani po ya bozongisi bondeko o kati ya Lisanga ya ba episkopo ya Corée, alobaki “elikya ekosila te”. Alobaki yango na bosali misa moko po  ya kobongisa bandimi na Mokolo ya losambo zambi ya bozongisi bondeko pe bomókó, etiama na mokolo ya 25 ya sánzá ya motóbá ya mobú mókó mókó.

Mokolo eye ya ntina, esalema na ba episkopo ya Corée na 1965 zambi ya kokundola ebandeli ya etumba ya Corée (1950-1953) pe kosambela po na kimia, ekokundela lokola mobú eye mibú 80 ya bobimi ya Corée na maboko ya Japon (1945). Ba misa pe ba butú ya losambo bisalemi na ba dioceze binso ya Corée. Ba katoliko ya Corée basangani na bobeleli na lisanga bozongisi bondeko na bandeko na bango ya mibali pe ya basi ya Nordi.

Boyokani ya Nordi na Sudi

Na tango Corée ya Sudi ewuti koleka na matáta na politiki eye elongoli mokonzi Yoon Suk Yeol pe liponi mokonzi ya sika Lee Jae-myung, likambo ya boyokani na Corée ya Nordi ezali mindondo, atako Séoul alakisaka posa na ye ya bolamu.

Bobebi ya boyokani kati na Nordi pe Sudi ezali komonana na miso ya bato. Na mibú ntuku mitano milekaki, makambo ya malamu bisalemaki, na bokolisi bokabani, pe kutu bosali esika mókó na ndelo ya bikolo.

Kasi, mibú mibale mileki, mikakatano na ndelo ya bikolo mibale bibakisami. Corée ya Nordi ekobaki bobongisi ba missile na ye pe elobaki ‘te boyokani kati na ba Corée ezali lokola ya “bikolo mibale biyokanaka te

Koleka ba matáta na boyambi

Na lolenge ena, Mokolo ya losambo po ya bozongisi bondeko etindi bandimi batombola miso na likolo pe babelela Nzambe, mokabi ya kimia pe elikya. Soki na bomoto ezali komonana mabe, esengeli kozua makasi na Nzambe po ya komona kongenga moko ya elikya. Episkopo asengaki na bandimi kokanisa “baye banso, na kàla, bamekaka kolanda nzela ya kimia pe ya bozongisi bondeko”.

Mobú eye, Mokolo ekokanisama na eleko ya mobú ya zubilé eye ezali na mama ya likonzi Bato bakokende mobembo wa elikya. Bongo, “sima ya mibú 80 ya bokabwani ya bikolo mibale, tokoka koleka ba matáta na boyambi ya nsekwa ya Kristu’, ebetaki ye sete.

Misala po ya mokolo

Kati na misala, na Ganghwa-gun, na esika moko ya ndelo ya bikolo mibale, bakristu ya biyamba lolenge na lolenge basanganaki po na kosambela na lisangani moko ebongisamaki na lisanga ya ba ngelesa. Bandimi babeleli Nzambe “po na suka ya etumba, po na bosangisi na mandoki te ya ba Corée mibale pe po na suka ya etumba na mokili

Na mobembo wa boyambi po na kimia na esika balongola mampinga, sima ya kotambola ba kilometre 385, bandimi ya biyamba kilikili bakomaki: “Totamboli na mandoki te po na koloba kimia, koyemba po na kimia pe kokela po na kimia”.

27 sánzá ya motóbá 2025, 11:40