Mokanda ya episkopo liboso ya mobulu ebele na Colombie
Jean-René B.-Kinshasa
Biloko misato bizalaki ba mitambo bipanzanaki na bolandani na etuka ya Cali. Na mokolo sé moko, bato koleka zomi bazokaki na motambo ya motuka to na bobetani masasi na bisika mibale ya sudi-ouesti ya Colombie.
Liboso ¡®te eye ya mabé ekoma, episkopo ya Cali abengaki mokolo ya yambo ya 9 ya sanza ya motoba lisanga pe bakambi ya ekolo na bosukisi bomati ya mobulu.
Babomi bato 1232
¡°Likambo ya mawa ya mobulu pe ya liwa ezali na ekolo na biso kobanda ba mibu ebele¡±, elobaki Mgr Luis Fernando Rodriguez Velásquez, pe mingi na etando na ye epayi wapi bituluku ya bato na mandoki bazali kobunda na bilanga ya coca pe na mombongo ya cocaïne. Likambo ya pasi koleka, esembolaki episkopo, na bopesi mituya, na mokanda na ye. ¡°Uta sanza ya yambo ya mobu moye, bato ya Colombie 2.437 bakufi na mobulu, kati na bango 1.232 babomi bango pe 231 bamipesi liwa¡±. Amoni lisusu bomati ya bobomi basi pe mobulu epayi ya lisanga ya LGBT.
Kokutanisa bolingo na mobulu
Mgr Rodríguez Velásquez alobi lisusu na mokanda na ye ¡®te bitumba bizali na lisapo ya mokili, úta bobomi ya Kaïna na ndeko na ye Abel kino bitumba ya sik¡¯oyo. Kasi, alobi ¡®te Yezu ya Nazarete apesa nzela mosusu: ¡°Na mosala na ye ya bopanzi nsango elamu Yezu akobeta nsete na mobéko ya bolingo. Mobéko mwa ngai mwango moye: bolinganaka bino na bino lokola ngai nakolingaka bino (Yoane 15,12)¡±. Nsango eye ya kimia pe ya bolimbisi etikali na ntina na eleko biye ya pasi, elimbolaki ye.
Kisi ya mapa po na bomoko
Epsikopo ya Cali akotalisa lokola maloba ya Pápa Léon ya Zomi na Minei oyo, na ebandeli ya mosala na ye ya mokitani ya Petelo, alobaki ¡®te ¡°na mikolo na biso, tozali komona lisusu bokabwani, pasi ya koleka biwuti na boyinani, na mobulu pe na makanisi mab顱. Mgr Rodríguez Velásquez akobianga bana ya Colombie banso ya kozala ¡°kisi ya mapa ya moké ya bomoko, ya lisanga pe ya bondeko¡± pe ya ¡°koyamba kimia ya Kristu asekwi¡±, oyo azali ¡°kimia moko ezanga mondoki pe kimia moko ekobotola mondoki, ya bomikitisi pe ya molende¡±, engebene na liloba ebimaki epayi ya Pápa Léon ya Zomi na Minei na pokwa ya boponami na ye na ebonga ya Petelo
Na maboko ya Maria
Liboso ya pasi, episkopo ya Cali akobenga koyamba Maria lokola Mama, pamba ¡®te akobondo baye bazali koyoka pasi ya lolenge ebele, lokola sik¡¯oyo na Colombie pe na mokili mobimba. ¡°Azali mwasi moko makasi eye akotambola elongo na Eklezia o eleko ebotamaki na losambo, na bolendisi ye ya kozala na lobòko na Mwana na ye pe ya kobwaka elikya ata soki moke te¡±, elobaki ye.
Episkopo asukisi mokanda na ye na bolobi lisusu ¡®te ¡°moto moko te esengeli amona ¡®te balongoli ye na bolingo ya Nzambe, pe tosengeli banso koyika mpiko na botali pamba bokesani na botosi pe na botiyi motema¡±.