MAP

2025.03.07 Cote d'Ivoire,IMAM KONE 2025.03.07 Cote d'Ivoire,IMAM KONE 

Côte d’Ivoire : Karesimo mpe Ramadan 2025 mpo na maponami ya mokonzi ya mboka na kimia

Mbula eye, lokola mbula elekaki, eleko ya Karesimo ekutani na sanza ya Ramadan ya ba musulman. Eleko ya esengo mpo na imam Ibrahim Koné, elama ya Lisanga ya biyamba ya Côte d’ivoire. Ye abengi bakristu na ba musulman ya ekolo batambola na molimo mpe basambela nzambi maponami ya mokonzi ya ekolo mokolo ya 25 ya sanza ya zomi eleka malamu.

Jean-René Bompolonga-Kinshasa

Karesimo na Ramadan bikoleka eleko moko lisusu mobu eye, ekowumela bongo mikolo mwa ebele. Ebandi mokolo ya 5 ya sanza ya misato, mokolo ya misato ya Putulu, eleko ya Karesimo 2025 ekosila mokolo ya 20 ya sanza ya minei na bosepeli Pasika, mokolo ya nsekwa ya Yezu. Epayi esusu, Ramadan, eleko ya bomipimi ya ba musulman, ebandaki mikolo minei liboso ya karesimo, ekosuka mokolo ya 30 ya sanza ya misato 2025. Ibrahim Koné, imam ya Côte d’Ivoire ya mosquée y’Abobo Sogefiha, mpe elama ya Lisanga ya biyamba ya Côte d’ivoire, amoni bokutani ena ezali “ngolu ya Nzambe”.

Mpo na maponami ya mokonzi ya ekolo na kimia

Mpo na imam ya Côte d’ivoire, “bokutani kitoko” eye ekozua ntina na mobu ya maponami na ekolo. “Nzambe asali biso ngolu na bileko biye malamu mpo na kosambela lisanga zambi ya kimia na ekolo na biso”, elobaki ye. Lokola Côte d’Ivoire ezali ekolo moko ya biyamba ebele koleka 80%, imam Koné abengi bakristu na ba musulman ya ekolo ya “kosangana na losambo na eleko eye ya ngolu mpo ete maponami ya mokonzi ya ekolo eleka malamu”. “Na ba ndako ya Nzambe, tempelo mpe mosquée, tosengeli kosambela mpo Nkolo abongola mitema ya bato ya politiki, zambi ya boyokani na bango na bana ya ekolo, mpo na bolamu ya bana ya Côte d’Ivoire”, ebetaki ye nsete. Imam abengi baye balingi bazala ba candidat mpe baye banso bazali na likambo ya kosala na maponami na bosali na sembo mpe mobulu te. “Makasi tokosala ekozala na motuya na mokolo ya 25 ya sanza ya zomi, Côte d’Ivoire ekokoba kozala esika ya kimia”, elobaki ye lisusu.  

“Karesimo na Ramadan, eteyelo moko ya bomoto”

Lisusu, mpo na imam Koné, Ramadan mpe Karesimo bizali “eteyelo moko ya bomoto”. “Bileko ya losambo mibale biye ya ntina bikoteya biso bomoi moko ya boyambi ya mozindo na Nzambe. Bizali eleko moko ya bokimi epayi ya Nzambe na botiki mabe, bomipimi mpe na likolo ya nionso, bopetoli milimo na biso na bolimbisi  masumu na biso”.

 

08 sánzá ya mísáto 2025, 15:50