Bampomba basali mobulu lisusu na Haïti
Nsango ya Vatican News
Sango Jean Gardy Maisonneuve, mokambi ya lisanga santu Karl Lévêque alobi ete bomoi ezali ya « kobeba » na Haïti. Na mobulu bampomba basalaki na kati ya butu ya 24 kino 25 ya sanza ya mibale, na mboka mokonzi Port-au Prince, na moke bato 20 babungisaki bomoi na bango. Sango ya jésuite ye moto apesi nsango ena mokolo ya mitano 28 ya sanza ya mibale.
Bitumba na mampinga ya ekolo
Ba nsango ya liboso bilakisi ete ba soda mibale ya mampinga ya ekolo babomaki bango. Bampomba basali bongo bikambami na policier ya kala na nkombo ya Jimmy "Barbecue" Chérizier. Bango kaka bakoki kozala baye bazikisaka lopitalo enene ya Port-au-Prince. Mpo na sango Maisonneuve, bato bakufaka ebele. Bana ya ekolo bazali kosepela te na bulamatari na bango, na lolenge azali kokoka te kosilisa mobulu ya bampomba. Mpo ya mokolo ya ibale elandani bakendeki kolakisa nkanda na bango liboso ya ndako ya bulamatari.
Mikano ya bokengi na République dominicaine
République dominicaine, eye ezali kokabola ndelo ya mabele na Haïti, abimisaki mikano ya bokengi mpo na bobateli ya ekolo. « Na mawa, lelo, likambo ya bokengi na Haïti ekokoba kobeba », elobaki mokonzi ya ekolo Luis Abinader. Abimisi mokano ekotiya bampomba ya Haïti lokola “lisanga ya ba terroristes”. Mokolo ya 27 ya sanza ya mibale Luis Abinader alobaki tè elama nionso ya bampomba ya Haïti soki aleki ndelo akoki kokangama mpe akosamba lolenge ya mibeko ya République dominicaine maye matali terrorisme. Mibeko mina bibongisa bokangemi mpe bitumbu ya libela.
Botali mpe bozongisi
Kobanda ba sanza ebele, République dominicaine akolisi bozongisi ba migrants ya ekolo Haïti. Ezongisaki koleka bato 140 000 kobanda sanza ya zomi. Mokonzi Luis Abinader alobaki ete ekolo na ye ekokoka lisusu te kokumba makambo bizali koleka na Haïti mpe amoni mabe lolenge lisanga ya bikolo bizali kopesa lisungi na Haïti te mpo na kosilisa mobulu. Na lombangu, bulamatari ya République dominicaine elobaki na ba sanza bilekaki bobandi programme ya kobengana kino bato 10.000 na mposo moko. Lisusu, kobanda 2021, ekolo ebandaki kotonga efelo ya bokaboli bikolo na molayi ya 340 km na bolandi ndelo ya ekolo mpo na bosukisi immigration clandestine mpe mimbongo bikosalema na masanga ya bato mabe.