Bakristu ya Syrie batungisami na bobomi ya ba alaouite
Vatican News
Kobanda 6 kino mokolo ya yambo 10 ya sanza ya misato, pembeni na ba civil nkoto moko babomaki bango na mampinga ya bulamatari ya sika ya Syrie na ouesti ya ekolo. Bato ya mokambi ya ekolo ya kala Bachar al-Assad babandaki kobundisa mampinga ya bulamatari ya sika na engumba Lattaquié, mokili ya ba alaouite, lisanga epayi wapi Bachar awuta. Tango mampinga bazongisi babomi bato bazalaki na bibundeli na ba civil, mingi mpenza ba alaouite, na bakristu na kati.
Bakristu bakomi na bobangi
Ezali mpasi mpo na koyeba nani abomaki moto oyo to oyo. Bakonzi ya sika ya ekolo bakolakisa mosapi epayi ya ba jihadiste ya bapaya, mingi ba Tchétchènes na ba Turkmènes. Makambo ndenge elekaki bizali kopesa mposa na bakristu ebele ya kokende mpe kotika Syrie. Bobangi ena ezali kozua makasi na bokabwani kati na maloba ya bakonzi ya sika ya ekolo na maye mazali kosalema ya solo. Mpo na bato ebele, bulamatari ya sika ezali kokamba ba jihadiste ya bapaya
Bakambi ya biyamba ya bakristu bakobenga na boyokani
Na ebandeli ya bobomi bato, ba patriarche ya ba Eklezia misato ya bana mboka basalaki mbela moko lisanga mokolo ya mposo mpo na “bobomi bato†esila. Jean X, patriarche grec-orthodoxe y’Antioche, Yousseb ler Absi, patriarche grec-catholique melkite mpe Mar Ignatius Ephrem ya mibale, patriarche syro-orthodoxe, batelemeli bobomi ya bato bayebi likambo te mpe basengaki nsuka ya koboma bato. Basengaki lisusu bofungoli nzela ya boyokani na ekolo