MAP

Humanitarian caravan arrives in El Tarra Humanitarian caravan arrives in El Tarra 

Colombie: ba epsikopo bakosenga “biyano ya makasi” na mokakatano ya bato

O eleko ya mbala 118 y’Assemblée plénière na bango, ba episkopo ya Colombie babimisi mokanda etali likambo ya politiki mpe ya bato na ekolo. Balobi ete “likambo moko te ebungisa bango na mikakatano ya mozindo koleka, maye masengeli bozui biyano sik’oyo mpe ya mpasi koleka maye bikotungisa ekolo”.

Jean-René Bompolonga-

Tokosenga na bulamatari ya ekolo mpe na ba misala nionso ya Leta ya kosala lisanga, na botali mingi oyo etali bolamu ya ekolo, mpo na kokoma na ya ekolo ya lisanga  mpe ya boboto eye banso tolingi”, wana ezali mbela elobami na ba episkopo ya lisanga ya ba epsikopo ya Colombie, o eleko ya mbala 118 y’Assemblée plénière na bango. Na mokanda ena, etiami maboko na bakambi ya lisanga mokolo ya 5 ya sanza ya mibale, bakosenga “biyano ya makasi” na mikakatano biyebani na ekolo.  

Batungisami na mpasi ya bana mboka

Ba episkopo ya Colombie balobi ete “ekolo ekutani na makambo makasi ya mikakatanompe mpo na yango, bakobenga mpo ete “likambo moko te ebungisa bango na “mikakatano ya mozindo koleka, maye masengeli bozui biyano sik’oyo mpe ya mpasi koleka maye bikotungisa ekolo”, mingi mpenza na oyo etali bomoto mpe social, lokola na région ya Catatumbo bipayi wapi bitumba bibomi kala mingi te bato ntuku mitano mpe bibengani bato 50.000 na ba ndako na bango.

““Tobalusa miso na biso lisanga na likambo ya Catatumbo mpe ya ba région misusu ya ekolo; totungisami na ba bogangi mpe ba mpasi ya bato mpe ya masanga baye banyokwami makasi””

Likambo moko ya mpasi makasi mpo na bato

Na mokanda na bango, ba episkopo balobi lisungi na bango na ba migrants banso, baye bakimi bisika bafandaka, baye bazali confiné mpe na baye bazongisi bango bakimaki ba ndako na bango mpo na boluki esika ya kobombana mpe ya kobatelama likolo ya mobulu eye ezali na ba région nionso ya Colombie.

Kosala na lolenge elongobani mpo na bolamu ya banso

Ba episkopo ya Colombie bakolendisa bulamatari ya ekolo mpe na ba misala nionso ya Leta ya kosala lisanga mpo na kotelemela likambo ena mpe bobongisi bolamu ya bana banso ya Colombie. Basukisi mokanda na bango na bobengi bobwaki elikya te mpe na kolendisa makambo mpo ya bozui mbano elamu na mokakatano ena.

.[ “Lelo koleka ntango inso, tomitika bayiba biso elikya te mpe tozala tango inso molende mpe na makanisi maye bikotombola masanga”. ]

10 sánzá ya míbalé 2025, 12:00