MAP

Israel and Hamas agree on hostage deal and ceasefire	Israel and Hamas agree on hostage deal and ceasefire   (ANSA)

Qatar epesi nsango ya boyokani mpo na kimia na Gaza

Ministre ya Yambo ya monarchie ya Golfe epesi nsango ya boyokani mpo na kotika masasi kati na Israël mpe Hamas na Gaza, nsima ya sanza zomi na mitano ya bitumba, na bolandi maloba ya mokonzi y’America oyo aponamaki Donald Trump.

Jean-René Bompolonga

Ministre ya Yambo ya Qatar Mohammed Al Thani alobi ezali ya solo bobimi ya bana ya Israël ntuku misato na misato bazali naino na bomoi na eteni ya liboso ya kotika masasi na Gaza.  Balongolaki bango mokolo ya sambo ya sanza ya zomi, bakoki kozonga o kati ya mabota na bango. Etumba ya Israël na Hamas na Gaza ebandaki mokolo ya sambo ya sanza ya zomi ya mobu nkoto mibale na ntuku mibale na misato, o eleko bato ya Hamas bakotelaki na bitumba Israël na sudi ya ekolo, babomi pembeni na bato nkoto moko na nkama mibale mpe bakangaki bato nkama mibale na ntuku mitano misusu. Bokati masasi, ebongisami mpo na mikolo ntuku minei na mibale mpe ekobanda mokolo ya zomi na libwa ya sanza ya liboso, esengi lisusu kobongisa mwa makambo mike, lolenge bakambi ya Israël balobaki o mokolo ya misato na pokwa, na botiki kobanza ete kotia maboko ya nsuka ekosalema na bangonga bizali koya.

 

Boyokani esengeli ezala mosisa ya kimia molayi

Bopesi nsango ya boyokani na Donald Trump ekwamwisi bato banso. Mokonzi aponamaki amipesi bosukisi ya eye ye abengi “un accord épique”. “Batomboki lisusu te na Gaza.l..l  Tokokolisa boyokani y’Abraham”, elobaki ye na botiki na mokonzi Joe Biden kaka bopesi nsango ya bosolo ya boyokani, na tango bato bebo bazali kosepela botiki masasi bipayi binso ya Gaza.

Kati na bato bazuaki maloba liboso nsima ya boyokani, ezali bongo Ursula von der Leyen. Mokambi ya Lisanga ya Europa alobaki lisusu ete lisungi mpo na bato ekokoka kokomela ba civils na Gaza, na bobakisi te lelo “biteni mibale basengeli kosala makasi mpo na boyokani, eye ebwaki lokolo ya liboso mpo na kimia molayi na region wana mpe boluki kosukisa etumba na nzela ya diplomatie”.

 

Feti na Gaza

Ba piololo ya mituka, mabina mpe ba bendele ya Palestine mpo na bosepeli bopesi nsango ezilamaki mingi ya boyokani ya botiki masasi na Gaza. Bana ya Gaza bayoki mpasi na bozangi bilei, bokweisi ba bombes, bakufi, ba ndako kokweya, bobangi mpe bozangi koyeba lobi ekozala ndenge nini ntango inso, masolo ya boyokani bikobonga te mbala ebele. Lelo, mposa na bango ezali ya kotika koloba mikolo minso  likambo ya  liwa mpe ya boyebi ete bazali na bokengi. Basusu bazali koloba bozongi epayi na bango mpe ya mposa ya botongi lisusu ba ndako bikweyi. Mokolo ya misato na pokwa na Gaza, esengo elongaki kobanga.   

17 sánzá ya yambo 2025, 13:01