MAP

Mgr Gabriele Caccia akosénga kotéya bilenge na momeseno moko ya kimia Mgr Gabriele Caccia akosénga kotéya bilenge na momeseno moko ya kimia  

Ngwendé ya Sántu-Petelo ekobénga bilenge na botosi ya lokúmu ya moto

Motáli ya ngonga insó ya Ngwendé ya Sántu-Petelo na ONU alakisi nzelá ya kolanda po ya kosálisa bilenge ya kokwéya na mitámbo ya ba nsango bitóndi na mikakatano, bobomi pe mobúlú. Babóti, balakisi, bato ya politiki, bapanzi nsango, masangá pe bituluku ya biyamba babéngami ya kosála mosála mókó monene na bokeli ya momeseno mókó ya kimia.

Vatican News

Bitumba ya mindóki pe makambo bilandani simá, lokóla bolongui ya bato; bokangemi ngwi na likambo pe mobúlú, mingi penza na internet; eye ekomema na bomoi ya bobomi. Wana bizali makambo maye leló bilenge ebelé bazali kokútana na yango pe bikobimisa bobángi ya Ngwendé ya Sántu-Petelo. Motáli ya ngonga insó na ONU, Mgr Gabriele Caccia, alobaki bobángi ena po ya lobi ya bilenge na likita mókó po ya bosáli Linaka ya bosáli po ya momeseno mókó ya kimia (Programme d’action pour une culture de la paix), ebéngami « Kopesa na bilenge makoki ya kosála po ya momeseno mókó ya kimia », esálemaki mokolo ya mibále ya 2 ya sánzá ya libwá na New York  

Kotéya bilenge na botosi

Po ‘te bilenge bakoka “kolona pe kotómbola bolingo na baningá”, elimbolaki Mgr Caccia, esengeli kolendisa bangó pe kosálisa bangó. Ezali bôngó nde bakokoka komátisa “bomoni mókó ya bokeseni nionso pe ya bobákisi eye moto mókó mókó akoki kopesa, bolingisi mókó po ya bosolóli na esika ya koluka etumba, pe bolukiluki elongó ya eye ezali malamu, na botosi ya lokúmu ya moto”. Wana, elobaki motáli, tina epesami na Ngwendé ya Sántu-Petelo na milongó (articles) 4 pe 8 ya Liloba etáli momeseno ya kimia (Déclaration sur la culture de la paix), endimamaki na Lisangá ya ONU na 1999, epayi wápi elakisami ‘te “boyekoli, na biténi nionso, ezali mókó ya bisáleli po ya kotónga momeseno ya kimia” pe “mosála mókó monene na botómboli ya momeseno ya kimia ezali na babóti, na balakisi, bato ya politiki, bapanzi nsango, masangá pe bituluku ya biyamba [...]”. Ezali o ntei ya masangá, elakisi motáli na New York, ‘te “bilenge batéyami” na mabongi, na bizaleli pe na loléngé ya bomoi biye bikosálisa ya kosilisa na kimia mikakatano, na botosi ya lokúmu ya moto, na elembo ya bokangi motéma pe ya boboyi moto te.

Bomátisi kimia

Na bolobi milio ya bilenge bakómaki na Roma na sánzá ya mwambi po na Zubilé esálemaki po ya bango, Mgr Caccia alakisaki « nguya ya bobongoli ya bondeko pe ya bolingi », mabongi biye bikoki kosála mokili mókó epayi wápi ezali bosolóli, kasi mindóki te, eye ekosilisa mikakatano. Na bosúkisi, motáli ya ngonga insó, na bokúndoli likambo-likonzi ya maloba ya Léon XIV po ya Mokolo ya mokili mobimba po ya kimia ya 2026, Kimia ezala na binó bansó: epayi ya kimia mókó ezanga mondóki pe ekolongola mondóki, ekoloba na elikya ‘te bilenge bakoki « koyamba bobiangi ena esika bazali kobika », na káti ya mabóta na bangó pe ya baningá na bangó, na etéyelo pe na mosála, na lisano, « na bosakoli nsango mókó ya elikya ya sóló pe ya bomátisi kimia, na bosálisi boyokani káti na bato bansó ».

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo

06 sánzá ya libwa 2025, 09:17