ÐÓMAPµ¼º½

Bato ya mobémbo mwa boyambi na nzela po ya kokende na Ezibeli Esantu ya basilique Santu-Petelo Bato ya mobémbo mwa boyambi na nzela po ya kokende na Ezibeli Esantu ya basilique Santu-Petelo  (© Jacopo Mancini)

Milio 24 ya bato ya mobémbo mwa boyambi bakómi na Roma po ya Zubilé ya Elikya

Dicastère ya Bopanzi Nsango-Ndamu ebimisaki motángo ya bandimi bakómi kinó sik’oyo na mobémbo mwa boyambi ya zubilé.

Vatican News

Koleka ba sánzá mwambi simá ya bofúngoli na Papá François, mokolo ya 24 ya sánzá ya zómi na mibále, Ezibeli Esántu ya basilique Sántu-Petelo, po ya bolakisi ebándeli ya Mobú Esántu, motángo ya bato ya mobémbo mwa boyambi bakómi na Roma po ya Zubilé ezali leló ya milio 24. Dicastère ya Bopanzi Nsango-Ndamu epesi nsango.

Mokolo ya póso na ngonga ya zómi, Papá Léon XIV akosála likita ya bansó ya zubilé na esika ya Sántu-Petelo, o eleko ena Ezibeli Esántu ekotikala ya kokangama. Kasi na súka, bato bakokoka koleka yangó atá bakomisi kómbó te.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo.

04 sánzá ya libwa 2025, 14:54