Episkopo ya lok¨²mu Parolin na Burundi, na mos¨¢la ya bolamu ya bans¨® zambi ya lok¨²mu po ya bato bans¨®
Vatican News
Na Burundi, bokúmisi ya Ntombwa ya Mwa Esengo Ngondo Maria ekútanaki na bomátisi na molongó ya basilique ya moke, ya paloisse Sántu-Antoine-de-Padoue epáyi wapi sanctuaire ya Maria ya ekóló ezali n¡¯archidiocèse ya Gitega. Bokúmisi, ekambami na episkopo ya lokúmu Pietro Parolin, esangisaki ba episkopo ya ekóló, ntómá ya Papá na Burundi, ba nkámá ya ba sángó, ba mamelo pe bandimi bebo. Bulamatari ya Burundi elakisamaki na mokónzi ya ekóló, Evariste Ndayishimiye.
Misa na sanctuaire ya Maria ya ekóló ya Mugera
Sanctuaire ya Maria ya Mugera, epáyi wápi bandimi bakosámbela Notre-Dame ya Lourdes, eye ekokundola bopesi ya Burundi mokolo ya 15 ya sánzá ya mwambi ya 1961, na Ngondo Maria Mokónzi ya Kimia, pe epáyi wápi Nzámbe apesaka mapámboli na bolobeli ya Ngondo Maria, ekokoba kozala esika mókó epáyi wápi mobú mókó na mókó bandimi ebelé bayaka na mobémbo mwa losámbo po na kosénga likabo ya kimia po ya ekóló pe po ya mokili. Mobémbo ena mwa losámbo ya mobú na mobú ekokundola ¡®te bopesi na Ngondo ezali elembo ya bokóli ya boyambi ya Eklezia na Burundi, ya pósá ya komibomba na bobáteli ya Mama ya Likoló pe komitika na nzéla na Ye kokambama na Mwána na ye Yezu-Kristu.
Grotte mókó ya moke na mabángá y¡¯Afrika
Eye ekobeta makási na sanctuaire ya Mugera, ezali loléngé grotte mókó ya moke na mabángá y¡¯Afrika, etóngami na elili ya grotte ya Lourdes, ekoki kobénda bato ebele ya bato bazali kokende na mobémbo mwa boyambi na Mugera po na bozui elikya pe kosámbela Mama na bangó ya likoló zambi abotisa kimia na mitéma na mabelé pe engengisa molimo ya bakambi ya ekóló po bapona ba nzéla ya kimia na mokili. Bandimi bansó ya ekóló eye elingama, eye ekútani na mikakatano ebelé pe ebóya soki moke te kobika na elikya, bakolakisa na esika ena boyambi na bangó, po ¡®te bato ya motéma malamu bakoba na moléndé maye bazali kosála po na kokóma na kimia eye bazali na pósá koleka.
Yangó waná episkopo ya lokúmu Parolin, na litéya na ye, abwáki mbela mókó ya sika ya koleka ba mbano ya bato bangó-mei po ¡®te, na makási ya sika, komitiya na mosála ya bolamu po ya bansó na mokili, zambi na bisika ya bitumba, epayi wápi bato mingi bazali konyokwama na makambo ebelé banda kala, tokoka lisusu kolikia kobika na lokúmu pe na bobáteli.
Bobenisi ya ekeko po ya kokanisa ntómá Courtney
Mokolo eleki, episkopo ya lokúmu akendeki na Minago po na kobenisa ekeko mókó etóngami na esika eye, mokolo ya 29 ya sánzá ya zómi na mibále ya 2003, ntómá ya Papá Michael Courtney, episkopo ya Irlance, babomaka ye na motámbo mókó o eleko azalaki kozonga epayi na ye. Episkopo ya lokúmu alobaki lisusu ¡®te Mgr Courtney atambolaki elongo na bato ya Burundi na mibú ya pási, pe asálaka po ya boyokani pe po ya kimia, na bosáli na motéma monene pe moléndé, po ya kosolola emonela na ye ya kimia, pe na kokende bipayi ya bansó, na kobósana bomoi na ye mókó.
Na súka azongelaki maloba maye, mokolo ya yambo ya sánzá ya yambo ya 2024, sántu Yoane Polo II apesaka lokúmu na episkopo Courtney : po ya mokristu, « kosakola kimia, ezali kosakola Kristu oyo azali « kimia na bisó », ezali kosakola Nsango-Ndamu na ye, eye ezali « Nsango-Ndamu ya kimia » ; ezali kobénga bato bansó na esengo ya kozala « basali ya kimia ». Mgr Michael Aidan Courtney, lokóla ntómá ya Papá na Burundi, babomaki ye tángo azalaki na etindá na ye po ya bosololi pe boyokani, azalaki nzeneneke ya « Nsango-Ndamu ya kimia ». Episkopo ya lokúmu abiangaki kosámbela po ya ye, « na bozali na elikya ¡®te ndakisa na ye pe bomikabi na ye bikobóta ba mbúma ya kimia na Burundi pe na mokili ».