ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Episkopo ya lokumu Pietro Parolin, Secr¨¦taire ya Leta ya Ngwende ya Santu-Petelo Episkopo ya lokumu Pietro Parolin, Secr¨¦taire ya Leta ya Ngwende ya Santu-Petelo   (ANSA)

Episkopo ya lok¨²mu Parolin na etind¨¢ na Burundi

?ta mokolo ya 12 kin¨® ya s¨¢nz¨¢ ya mwambi, Secr¨¦taire ya Leta ya Ngwende ya S¨¢ntu-Petelo azali na mob¨¦mbo na et¨¦ni wan¨¢ y¡¯Afrika po na kos¨²kisa Zubil¨¦ ya mib¨² 60 ya boyokani na Vatican, pe po ya kotia lib¨¢ng¨¢ ya yambo na lopit¨¢lo po ya lok¨²mu ya nt¨®ma, Mgr Courtney, babomaka ye na 2023.

Vatican News

Na bobengi ya Eklezia pe bakónzi ya Burundi, Secrétaire ya Leta ya Ngwende ya Sántu-Petelo azali na mobémbo na ekóló ena y¡¯Afrika ya Monyele, kobánda mokolo ya mibále eyé, kinó mokolo ya yambo 18 ya sánzá ya mwambi. Mobémbo eyé ezali po na kosúkisa Zubilé ya mibú 60 ya boyokani kati na Burundi pe Ngwende ya Sántu-Petelo, pe po na bofúngoli ekeko pe kotia libángá ya yambo ya lopitálo na lokúmu ya ntóma ya Papá, Mgr Michael Aidan Courtney, mibú 23 simá ya bobomi ye na motámbo mókó.

Bobanzi ntóma Mgr Courtney

Aponamaki na 2000 na Yoane Polo II motindámi ya Papá na ekóló ena ebébisamaki na etumba ya ba civil, Mgr Courtney asálaki mosála mókó ya ntina na bosúki ya boyokani ya sánzá ya zómi na mókó ya 2003 káti ya bulamatari ya Burundi pe batomboki hutu. Atindámaki na ndako ya ntóma ya Papá (nonciature apostolique) ya Cuba, Mgr Courtney aséngaka kotikala na Bujumbura po na eténi mókó ya moke, amónaki ¡®te kimia mókó ya súka ezalaki pembéni. O eleko azalaki na mobémbo na mbóka mokónzi ya Burundi, motuka na ye ezuaka masási. Kaka ye mókó na bato bazalaki na káti ya motuka azuaka masási, Mgr akúfaki na lopitálo: ezalaka mokolo ya 29 ya sánzá ya zómi na mibále ya 2003 pe azalaki kaka na mibú 58.

Na 2023, simá ya mibú ntúkú mibále ya liwa na ye, episkopo Paul Richard Gallagher asámbelaki misa mókó ya mawa po ya ntóma ena na chapelle ya Irlande ya Grottes ya Vatican. Kobánda sik¡¯oyo, ekóló mobimba, libosó ya episkopo ya lokúmu Parolin, ekokundola ntóma na bokeli lopitálo ena eye ekotóngama kaka esika babomaka ye. Mokáno esakolamaki mobú moleki na mokónzi ya Burundi, Evariste Ndayishimiye, pe mokolo ya botiyi libángá ya yambo etiamaka mokolo ya 14 ya sánzá ya mwambi 2025. Mokolo ena, Secrétaire ya Leta ya Ngwende ya Sántu-Petelo, akokamba molulu ya bofúngoli ekeko pe ya bobándi misála ya lopitálo.

Manaka ya mobémbo

Manaka na molayi ya mobémbo ya episkopo ya lokúmu epesami boye. Mgr Parolin akosámbela misa mokolo ya misáto ya 13 ya sánzá ya mwambi na Lisangá ya ba episkopo ya Burundi, akokútana na bango lisusu na simá. Kaka mokolo waná, bokútani na mokónzi Ndayshimiye pe botiyi mabokó na mikánda káti na Lisangá ya ba episkopo na bulamatari bibongisami. Mokolo ya mitáno ya 15 ya sánzá ya mwambi, episkopo ya lokúmu Parolin akosámbela misa na sanctuaire ya Marie ya Mugera, na simá akokende na Gitega.

Misa mókó esusu ekosálema mokolo ya póso ya 16 ya sánzá ya mwambi; mbala mókó na simá, episkopo ya lokúmu Parolin akokútana na balikindo pe bakambi minene ya biyamba ya bási pe ya mibáli. Kaka mokolo waná ekozala bofúngoli ya mémorial ya Mgr Michael Aidan Courtney na ndako ya ntóma ya Papá na Bujumbura pe boyambi ya Bantóma ya bikóló bisusu. Na súka, mokolo ya eyenga ya 17 ya sánzá ya mwambi, Mgr Parolin akokamba misa ya bosúkisi Zubilé ya mibú 60 ya boyokani káti ya Burundi pe Ngwende ya Sántu-Petelo, na sanctuaire ya Notre Dame Trois Fois Admirable ya Schoenstatt, etóngama kaka na esika ena epáyi wapi, mokolo ya 7 ya sánzá ya libwa na 1990, Sántu Yoane Polo II asámbelaka misa. 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo

12 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 16:09