Episkopo ya lokúmu Parolin: “Ba mbano bizali o káti ya makambo bikopekisa bosilisi pási na Gaza”
Vatican News
O eleko ya misa ya bokanisi Sántu-Monique, esálemaki na basilique Sántu-Augustin na Roma, episkopo ya lokúmu Secrétaire ya Leta ya Ngwendé ya Sántu Petelo, Pietro Parolin, alobaki lisusu likanisi ya Ngwendé ya Sántu-Petelo na oyo ezali koleka na Proche-Orient. Azongelaki mbela ya Papá Léon XIV pe maloba ya ba patriarche ya Mabelé-Esántu.
Botelemeli bobimisi bato na makási na Gaza
“Na botáli mbela ya Papá na tóngo ya leló o eleko ya likita po ya bansó, eye ekokani na likanisi ya Ngwendé ya Sántu-Petelo na oyo ezali koleka na Gaza”, elimbolaki episkopo ya lokúmu Parolin, alobaki ‘te Papá wa Roma na ba patriarche orthodoxe ya Grèce pe ya latin baséngaki “súka ya etúmba”, pe basakolaki “botelemeli bobimisi bato na makási na Gaza”.
Ba mbano ebelé bizali na káti
Episkopo ya lokúmu alobaki ‘te “ezali na ba nzéla ebelé, ba nzéla biye bikoki kosilisa sóló eye ezali koleka”, kasi atelemelaki bozito ya ba mbano ya “politiki”, ya “nkita”, ya “bokónzi” pe ya “kokónza” maye makopekisa “pási ena esila na loléngé elongobami”.
Papá akobóndela po ‘te bozimi-móto ya libélá esálema na Gaza
Na súka ya likita po ya bansó mokolo ya 27 ya sánzá ya mwambi, Léon XIV azongelaki mbela na ye na etúmba na Mabelé-Esántu. Akosénga bobimisi baye bakangemi na makási, bozimi-móto…
Kotikala ezali kozala na mpiko
Po eye etáli bobáteli ya basáli na Nzámbe na bandimi na Gaza, episkopo ya lokúmu alobaki ‘te “bonsómi mókó epesamaki libosó ya mobéko ya bolongui” ya bulamatari ya Israël, na botángi patriarche orthodoxe ya Yérusalem, Théophile III. Patriarche alobaki ‘te bandimi ya paloise orthodoxe babengamaki ya «kobima na Gaza». “Mókó mókó akoki kozua mokáno nini kosála”, elobaki episkopo ya lokúmu, na bosemboli ‘te “kopona kotikala ezali kozala na mpiko”. Ayébi te “loléngé nini ekoki kosálema sóki mokáno ya kobima ezali” pe “boyángeli nionso, na mabelé, ya etúka”.
Bilembo ya diplomatie
Na eye etáli diplomatie, Secrétaire ya Leta andimaki “azali na lisoló na bulamatari y’Amerika, na nzéla ya ntoma”, pe asakolaki pósá ‘te masoló ya mokili biye bikosálema o eleko ya mobémbo ya ministre ya Israël ya Makambo bitáli bapaya na Washington, Gideon Sa’ar, bibimisa bilembo ya sóló: “Nazali kozela eye Papá aséngaki, ezali bôngo bozimi-móto, bozui mókó elongobami ya lisálisi, botosi ya mobéko ya mokili ya bato -eye ezali na tina- pe boboyi etúmbu ya lisangá”
Loléngé bulamatari ya Israël elingi
Na súka, na eye etáli bobángi ya bobimisi na makási bato ya Gaza, episkopo ya lokúmu Parolin andimaki ‘te kinó sik’oyo, bulamatari ya Israël “alakisaki ‘te alingi kozonga simá te”, na likambo yangó pe “tángo mosusu elikya ezali mingi te”. Alobaki lisusu pósá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo ya “kokoba koloba” po ‘te makambo bibóngwana.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo